Makomi
Malongi mpe Mayokani 42


Eteni 42

Emoniseli epesami na biteni mibale na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 9, sanza ya mibale ya mobu 1831. Eteni ya yambo oyo esalemi na banzela ya kotanga 1 kino na 72, ezwamaki na miso ya bampaka zomi na mibale mpe na bokokisami ya elaka ya Nkolo oyo epesamaki liboso ete “mobeko” mokopesama na Ohio (tala eteni 38:32). Eteni ya mibale oyo esalemi na nzela ya kotanga 73 kino 93. Profeta ayebisi malamu emoniseli oyo lokola “kozalaka na mobeko ya Eklezia”.

1–10, Bampaka babiangami koteya nsango malamu, kobatisa babongwani, mpe kotonga mpe kokolisa Eklezia; 11–12, Basengeli kobiangama mpe kokulisama mpe basengeli koteya mabongisi ya nsango malamu oyo ezwami kati na makomi; 13–17, Basengeli koteya mpe kosakola na nguya ya Molimo; 18–29, Basantu bapekisami koboma, koyiba, kokosa, kolula, kosala ekobo, koloba mabe na basusu; 30–39, Mibeko oyo miyangelaka bobulisami ya biloko etiami; 40–42, Lolendo mpe goigoi ekweyisami; 43–52, Bakoni basengeli kobikisama na nzela ya kotiaka bango maboko mpe kosambela mpe na nzela ya bondimi; 53–60, Makomi esengeli kokamba Eklezia mpe esengeli kosakolama na mokili; 61–69, Esika wapi ekotongama Yelusaleme ya Sika mpe mibombamo ya bokonzi ekobimisama; 70–73, Biloko bibulisami esengeli esalelama mpo na kosunga bakambi ya Eklezia; 74–93, Mibeko miyangeli pite, bondumba, bobomi, moyibi, mpe botubeli ya masumu etiami.

1 Boyoka, O bino bampaka ya eklezia na ngai, baoyo bosanganaki bino moko esika moko na nkombo na ngai, kutu Yesu Klisto Mwana ya Nzambe na bomoi, Mobikisi ya mokili; mbala mingi lokola bondimi na nkombo na ngai mpe bobombi mitindo na ngai.

2 Lisusu nalobi epayi na bino, botia bokebi mpe boyoka mpe botosa mobeko oyo nakopesa epayi na bino.

3 Mpo solo nalobi, lokola bosanganaki bino moko esika moko engebene na motindo oyo natindaki bino, mpe boyokanaki mpo na oyo etali eloko se moko oyo, mpe bosengaki Tata na nkombo na ngai, kutu bongo nde bokozwa.

4 Tala, solo nalobi epayi na bino, napesi epayi na bino motindo oyo ya yambo, ete bokokende na nkombo na ngai, moko moko kati na bino, longola se basali na ngai Joseph Smith Mwana, mpe Sidney Rigdon.

5 Mpe napesi epayi na bango motindo ete bakokende mpo na eleko moko ya moke, mpe ntango bakozonga ekobimisama na nguya ya Molimo.

6 Mpe bokokende na nguya ya Molimo na ngai, koteyaka nsango malamu na ngai, mibale mibale, na nkombo na ngai, kotombolaka mingongo na bino lokola na lokito ya kelelo, kosakolaka liloba na ngai lokola banjelu ya Nzambe.

7 Mpe bokokende kobatisaka na mai, kolobaka: Boyambola, boyambola, mpo bokonzi ya lola ekomi penepene.

8 Mpe uta na esika oyo bokokende na bituka na ngambo ya westi; mpe mbala mingi lokola bokokuta baoyo bakoyamba bino bokotonga eklezia na ngai na etuka moko moko—

9 Kino ekoya ntango wapi ekobimisama epayi na bino uta na likolo, ntango engumba ya Yelusaleme ya Sika ekolengelama, ete bokoka kosangana na esika moko, ete bokoka kozala bato na ngai mpe nakozala Nzambe na bino.

10 Mpe lisusu, nalobi epayi na bino, ete mosali na ngai Edward Partridge akosala mosala epayi wapi nasili kobianga ye. Mpe ekosalema ete soki abuki mobeko moto mosusu akoponama na esika na ye. Kutu bongo. Amene.

11 Lisusu nalobi epayi na bino, ete ekopesama na moto moko te ete akende koteya nsango malamu na ngai, to kotonga eklezia na ngai, longola se soki akulisami na moto oyo azali na likoki, mpe eyebani na eklezia ete azali na likoki mpe engebene na mibeko akulisamaki na bakambi ya eklezia.

12 Mpe lisusu, bampaka, banganganzambe mpe bateyi ya eklezia oyo basengeli koteya mabongisi ya nsango malamu na ngai, oyo ezali kati na Biblia mpe Buku ya Mormon, kati na oyo wapi ezali litondi ya nsango malamu.

13 Mpe basengeli kotosa mayokani mpe malako ya eklezia mpe kosalela yango, mpe oyo ekozala mateya na bango, lokola ekokambama bango na Molimo.

14 Mpe Molimo mokopesama epayi na bino na kosalaka losambo ya bondimi; mpe soki bozwi Molimo te bosengeli koteya te.

15 Mpe nyonso oyo bosengeli kotosa kosala yango lokola natindaki bino mpo na oyo etali mateya na bino, kino ekopesama litondi ya makomi na ngai.

16 Mpe wana ekotombola bino mingongo na bino na nzela ya Molendisi, bokoloba mpe bokosakola lokola ebongeli ngai malamu;

17 Mpo, tala, Molendisi ayebi makambo nyonso, mpe apesaka litatoli ya Tata mpe ya Mwana.

18 Mpe sikawa, tala, nazali koloba epayi ya eklezia. Okoboma te; mpe ye oyo akoboma akozwa bolimbisi te kati na mokili oyo, to kati na mokili ekoya mpe te.

19 Mpe lisusu, nalobi, okoboma te; kasi ye oyo akoboma asengeli kokufa.

20 Okoyiba te; mpe ye oyo akoyiba mpe aboyi koyambola asengeli kobenganama.

21 Okobuka lokuta te; ye oyo akobuka lokuta mpe aboyi koyambola asengeli kobenganama.

22 Okolinga mwasi na yo na motema na yo mobimba, mpe okokangama na ye mpe na moko mosusu te.

23 Mpe ye oyo akotala mwasi mpo na kolula ye akowangana bondimi, mpe akozala na Molimo te; mpe soki ayamboli te asengeli kobenganama.

24 Okosala ekobo te; mpe ye oyo akosala ekobo, mpe ayamboli te, akobwakama libanda.

25 Kasi ye oyo asali ekobo mpe ayamboli na motema na ye mobimba, mpe atiki yango, mpe asali yango lisusu te, okolimbisa;

26 Kasi soki asali yango lisusu, asengeli kolimbisama te, kasi kobenganama.

27 Osengeli koloba mabe ya moninga na yo ya penepene te, to kosala ye mabe moko te.

28 Oyebi mibeko na ngai etali makambo oyo makomami kati na makomi na ngai; ye oyo asumuki mpe ayamboli te akobenganama.

29 Soki olingi ngai okosalela ngai mpe okobomba mitindo na ngai nyonso.

30 Mpe tala, okokundola babola, mpe okobulisa bozwi na yo mpo na lisungi na bango oyo osengeli kokabela bango, na kosalelaka liyokani moko mpe mokanda motiami ebako oyo moto moko akoki kobuka te.

31 Mpe mbala mingi lokola okokabola biloko na yo epayi ya babola, okosala yango epayi na ngai; mpe esengeli kotiama liboso ya episikopo ya eklezia na ngai mpe bapesi toli na ye, mibale kati na bampaka, to banganganzambe minene, lokola akopona to lokola baponamaki mpe batiamaki mpembeni mpo na ntina wana.

32 Mpe ekosalema ete, nsima ete bitiama liboso ya episikopo ya eklezia na ngai, mpe ekosila ye kozwa matatoli oyo etali bobulisami ya bozwi ya eklezia na ngai, ete moto moko akoki te kobotola biloko yango lisusu uta na eklezia, na boyokani na mitindo na ngai, moto nyonso asengeli koyanolama epayi na ngai, lokola kapita likolo ya bozwi na ye moko, to boye azwaki na nzela ya bobulisami, mingi lokola ekoki mpo na ye moko mpe libota na ye.

33 Mpe lisusu, soki ekozala lisusu na bozwi na maboko ya eklezia, to soki ezali lisusu na maboko ya bato songolo na yango, biloko koleka oyo esengeli mpo na lisungi na bango nsima ya bobulisami oyo ya yambo, boye ezali ndambo etikali mpo na kobulisama epayi ya episikopo, esengeli ebombama mpo na kopesa, mbala na mbala, na baoyo bazali na yango te, ete moto nyonso oyo azali kokelela akoka kopesama na lolenge ekoki malamu mpe kozwa engebene na mposa na ye.

34 Boye, ndambo etikali esengeli ebombama na ebombelo na ngai, mpo na kopesa epayi ya babola mpe bakeleli, lokola ekotindama na lisanga monene ya eklezia, mpe na episikopo mpe lisanga na ye;

35 Mpe mpo na ntina ya kosomba mabele mpo na bolamu ya bato nyonso ya eklezia, mpe ya kotonga ndako ya kokumbamela, mpe kotonga Yelusaleme ya Sika oyo ekobimisama awa nsima—

36 Ete bato ya liyokani na ngai basangana na bomoko na mokolo wana ntango nakoya kati na tempelo na ngai. Mpe oyo nasali mpo na lobiko ya bato na ngai.

37 Mpe ekosalema ete, ye oyo asumuki mpe ayamboli te akobenganama uta na eklezia, mpe akozwa lisusu te oyo abulisaki mpo na babola mpe bakeleli ya eklezia na ngai, soki te na maloba mosusu, mpo na ngai—

38 Mpo mbala mingi lokola bosali yango epayi ya bato oyo ya mike mike, bosali yango epayi na ngai.

39 Mpo ekosalema ete, oyo nalobaki na minoko ya baprofeta na ngai ekokokisama; mpo nakobulisa ndambo ya bozwi ya baoyo bazali kondima nsango malamu na ngai na kati ya baoyo bazali Bayuda-te mpo na babola ya bato na ngai oyo bazali bato ya ndako ya Yisalaele.

40 Mpe lisusu, bosengeli te kozala bato ya lolendo kati na mitema na bino; tika bilamba na bino ezala ya bokembisi te, mpe tika kitoko na yango ezala kitoko ya misala ya maboko na bino moko;

41 Mpe tika ete makambo nyonso esalema na bopeto liboso na ngai.

42 Bosengeli te kozala bato na goigoi; mpo ye oyo azali moto na goigoi akolia lipa te mpe akolata bilamba ya moto oyo asalaka mpe te.

43 Mpe bato soki nani na kati na bino oyo bazali bakoni, mpe bazangi bondimi mpo na kobikisama, kasi bandimi, basengeli koleisama na pete nyonso, na ndunda mpe bilei ya petepete, mpe oyo wana na loboko ya monguna te.

44 Mpe bampaka ya eklezia, mibale soki te mingi, basengeli kobiangama, mpe basengeli kosambela mpe kotia bango maboko na nkombo na ngai; mpe soki bakufi bakokufa mpo na ngai, mpe soki bazali na bomoi bakozala na bomoi mpo na ngai.

45 Bosengeli kozala na lisanga kati na bolingo, na lolenge ete bosengeli kolela mpo na kobungisa baoyo bazali kokufa, mpe mingi koleka mpo na baoyo wana bazali na elikya ya bosekwi ya nkembo te.

46 Mpe ekosalema ete baoyo wana bakokufa na ngai bakomeka liwa te, mpo ekozala elengi epayi na bango;

47 Mpe baoyo bakokufa kati na ngai te, lisuma epayi na bango, mpo liwa na bango ezali bololo.

48 Mpe lisusu, ekosalema ete ye oyo azali na bondimi na ngai mpo na kobikisama, mpe atangami mpo na liwa te, akobikisama.

49 Ye oyo azali na bondimi mpo na komona akomona.

50 Ye oyo azali na bondimi mpo na koyoka akoyoka.

51 Moto abukana makolo oyo azali na bondimi mpo na kotambola akotambola.

52 Mpe bango oyo bazali na bondimi te mpo na kosala biloko oyo, kasi bandimi ngai, bazali na nguya ya kokoma bana na ngai; mpe mbala mingi lokola bakobuka mibeko na ngai te bosengeli komema bokono na bango.

53 Bosengeli kotelema na esika ya bokapita na bino.

54 Bosengeli kokamata elamba ya ndeko na bino mondimi te; bosengeli kofuta mpo na oyo bokozwa uta na ndeko na bino mondimi.

55 Mpe soki bozwi mingi koleka oyo wana esengelaki mpo na lisungi na bino, bosengeli kopesa yango na ebombelo na ngai, ete makambo nyonso makoka kosalema engebene na oyo nalobaki.

56 Bosengeli kosenga, mpe makomi na ngai makopesama lokola natindaki, mpe esengeli kobatelama na bokengi;

57 Mpe elongobani ete bozala nie mpo na oyo etali makomi yango, mpe boteya yango te kino bokozwa yango na mobimba.

58 Mpe napesi epayi na yo motindo ete na ntango wana bosengeli koteya yango na bango nyonso; mpo makoteyama epayi na bikolo nyonso, mabota nyonso, minoko nyonso mpe bato nyonso.

59 Bokokamata makambo oyo bozwaki, oyo epesamaki epayi na bino lokola mobeko kati na makomi na ngai, mpo ete ezala mobeko na ngai mpo na koyangela eklezia;

60 Mpe ye oyo akosala engebene na makambo oyo akobikisama, mpe ye oyo akosala yango te akokweisama soki akokoba kosala bongo.

61 Soki bosengi, bokozwa emoniseli likolo ya emoniseli, boyebi likolo ya boyebi, ete bokoka koyeba mibombamo mpe makambo ya kimia—oyo mamemaka bosepeli, oyo mamemaka bomoi ya seko.

62 Bokosenga, mpe ekobimisama epayi na bino na ntango esengeli ya ngai moko epayi wapi Yelusaleme ya Sika esengeli kotongama.

63 Mpe tala, ekosalema ete basali na ngai bakotindama kokende na esti mpe westi, na nordi mpe na sudi.

64 Mpe kutu sikawa, tika ete ye oyo akokende na esti ateya baoyo bakobongwama mpo na kokima na westi, mpe oyo na ntina ya oyo ekoya na mabele, mpe mpo na makelemba ya nkuku.

65 Tala, bokotosa makambo oyo nyonso, mpe mbano na bino ekozala monene koleka; epayi na bino epesami koyeba mibombamo ya bokonzi, kasi na mokili epesami te koyeba yango.

66 Bosengeli kotosa mibeko oyo bozwaki mpe kozala sembo.

67 Mpe bokozwa nsima awa mayokani ya eklezia, na lolenge ya kokoka mpo na kotia bino, ezala awa mpe kati na Yelusaleme ya Sika.

68 Boye, ye oyo azangi bwania, tika ete asenga uta na ngai, mpe nakopesa ye na motema ya bokabi mpe nakopamela ye te.

69 Botombola mitema na bino mpe bosepela, mpo epayi na bino bokonzi, soki te na maloba mosusu, bafungola ya eklezia epesami. Kutu bongo. Amene.

70 Banganganzambe mpe bateyi basengeli kozala na bokapita na bango, kutu lokola bandimi.

71 Mpe bampaka soki te banganganzambe minene oyo babiangami kosunga episikopo lokola bapesi toli na makambo nyonso, basengeli kosungama na mabota na bango na bozwi oyo ebulisami na episikopo, mpo na bolamu ya babola, mpe mpo na ntina esusu, lokola etangamaki yambo.

72 Soki te basengeli kozwa lifuta oyo ekoki mpo na misala na bango nyonso, ezala mosala ya bokapita to mpe oyo ya lolenge mosusu, lokola ekokanisa to mpe ekozwa bapesi toli mpe episikopo mokano malamu koleka.

73 Mpe episikopo, lisusu, asengeli kozwa lisungi na ye, soki te lifuta oyo ekoki mpo na misala na ye nyonso kati na eklezia.

74 Tala, solo nalobi epayi na bino, ete bato nyonso na kati na bino, baoyo balongoli balongani na bango mpo na ntina ya bondumba, soki te na maloba mosusu, soki bakotatola liboso na bino na bokitisi nyonso ya motema ete likambo ezali boye, bosengeli te kobengana bango uta na kati na bino;

75 Kasi soki bomoni ete bato songolo basili kotika balongani na bango mpo na ntina ya ekobo, mpe bango moko bazali basumuki, mpe balongani na bango bazali na bomoi, basengeli kobenganama uta na kati na bino.

76 Mpe lisusu, nalobi epayi na bino, ete bosengeli kozala na ekenge mpe na bokebi, na kolukaka koyeba nyonso, mpo ete boyamba bato ya lolenge wana te na kati na bino soki babalanaki;

77 Mpe soki babalanaki te, basengeli koyambola uta na masumu na bango nyonso soki te bokoyamba bango te.

78 Mpe lisusu, moto nyonso oyo azali ya eklezia oyo ya Klisto, asengeli kosala makasi mpo na kobomba mitindo mpe mayokani nyonso ya eklezia.

79 Mpe ekosalema, ete soki moto songolo na kati na bino abomi moto esengeli apesama mpe asambisama engebene na mibeko ya mboka; mpo bomikundola ete azali na bolimbisi te; mpe esengeli elakisama engebene na mibeko ya mboka.

80 Mpe soki mobali to mwasi songolo asali ekobo, esengeli basambisa ye mobali to mwasi yango liboso ya bampaka mibale ya eklezia, to koleka mibale, mpe likambo nyonso endimama na mabe na ye na banzeneneke mibale ya eklezia, mpe na banguna te; kasi soki banzeneneke bazali mingi koleka mibale ezali malamu koleka.

81 Kasi ye mobali to ye mwasi asengeli kofundama na monoko ya banzeneneke mibale; mpe bampaka basengeli kotia likambo yango liboso ya eklezia, mpe eklezia esengeli kotombola maboko na bango likolo na ye, ete bakoka kosambisa ye engebene na mobeko ya Nzambe.

82 Mpe soki ekoki kozala bongo, esengeli ete episikopo azala wana lisusu.

83 Mpe boye nde bosengeli kosala ntango makambo nyonso makokweya liboso na bino.

84 Mpe soki mobali to mwasi ayongoli, esengeli batika ye mobali to ye mwasi epayi na baoyo batalaka mobeko ya mboka.

85 Mpe soki mobali to mwasi ayibi, esengeli batika ye mobali to ye mwasi epayi na baoyo batalaka mobeko ya mboka.

86 Mpe soki mobali to mwasi abuki lokuta, esengeli batika ye mobali to ye mwasi epayi na baoyo batalaka mobeko ya mboka.

87 Mpe soki asali mabe ya lolenge kani, bakotika ye mobali to ye mwasi epayi na baoyo batalaka mobeko, kutu oyo ya Nzambe.

88 Mpe soki ndeko na yo mobali mondimi to ndeko na yo mwasi mondimi atuki yo, osengeli kokamata ye ndeko mobali to ndeko mwasi yango katikati na ye elongo na yo pamba esika moko; mpe soki ye mobali to ye mwasi atubeli bosengeli kozongisana boyokani.

89 Mpe soki ye mobali soki te mwasi atubeli te osengeli kotika ye epayi ya eklezia, epayi ya bandimi te, kasi epayi ya bampaka. Mpe esengeli esalema kati na likita, mpe oyo wana liboso ya mokili te.

90 Mpe soki ndeko na yo mobali soki te ndeko na yo mwasi atuki baike, ye ndeko mobali soki te ndeko mwasi yango asengeli kopesama etumbu liboso ya baike.

91 Mpe soki moto songolo atuki na polele, ye ndeko mobali soki te mwasi wana asengeli kopamelama na polele, ete akoka koyoka nsoni. Mpe soki atubeli te, ye ndeko mobali soki te mwasi asengeli kotikama epayi na baoyo batalaka mobeko ya Nzambe.

92 Soki moto kani atuki na nkuku, ye ndeko mobali soki te mwasi asengeli kopamelama na nkuku, ete azwa libaku ya kotubela na nkuku epayi na ye ndeko mobali soki te mwasi oyo atukisami, mpe na Nzambe, ete eklezia eloba mabe te na ye ndeko mobali soki te ye mwasi oyo atukaki.

93 Mpe boye nde bosengeli kokamba na makambo nyonso.

Bimisa na lokasa