Likita Linene
Mobikisi na biso asala nini mpo na biso?
Likita linene ya sanza ya minei 2021


Mobikisi na Biso asala nini mpo na biso?

Yesu Klisto asala makambo manso oyo masengeli mpo na mobembo na biso ya kufa kokende epai ya nsuka ya nyonso na makambo etangama na mwango mwa Tata na biso na Lola.

Na likita ya mpokwa ya mokolo ya mposo na likita ya euka mbula mingi eleki, nakutanaki na mwasi oyo baninga na ye bayebisaki ye azongela eklezia na nsima bambula ebele ya kozanga koya eklezia, kasi amonaki te ntina ya ye kosala yango. Mpo na kolendisa ye, nalobaki, “Ntango ozali kotala manso oyo Mobikisi asala mpo na yo, ozali na bantina ebele ya kozonga kokumbamela mpe kosalela Ye.” Nakamwaki ntango azongisaki maloba, “Asala nini mpo na ngai?”

Elilingi
Boyei ya Mibale

Yesu Klisto asala nini mpo na moko na moko na biso? Asala makambo manso oyo masengeli mpo na mobembo na biso ya kufa kokende epai ya nsuka ya nyonso na makambo etangama na mwango mwa Tata na biso ya Lola. Nakolobela na ntina ya makambo minei ya mwango wana. Na moko moko ya manso maye, Mwana na Ye ya Likinda, Yesu Klisto, azali elembo ya katikati. Kolendisa nyonso oyo “ezali bolingo ya Nzambe, oyo esopani na mitema ya bana na bato; yango wana, ezali eloko esengelami mingi likolo lya biloko binso” (1 Nefi 11:22).

I.

Kaka liboso ya Eyenga ya Pasika, ezali ngonga ya kolobela liboso Lisekwa ya Yesu Klisto. Lisekwa uta na bawa ezali kokembisa likonzi ya bondimi na biso moko moko. Ezali kobakisa ndimbola ya malongi na biso, makasi na bizaleli na biso, mpe elikya mpo na mikolo na biso mikoya.

Mpo tondimeli bolimboli ya Biblia mpe Buku ya Mormon ya Lisekwa ya solo ya Yesu Klisto, biso mpe tondimi makomi ebele koteyaka ete lisekwa ya lolenge moko ekokomela bakufi nyonso oyo babikaka na mabele oyo.1 Ndenge Yesu ateyaki, “Lokola nazali kobika, bino bokobika mpe” (Yoane 14:19). Mpe Apastolo na Ye ateyaki “ bakufi bakosekwa na bozangi kopola” mpe “ nzoto oyo na kopola ekolata bozangi kufa” (1 Bakolonti 15:52, 54).

Elilingi
Lisekwa

Kasi, Lisekwa epesi biso mingi koleka elikya ya bozangi kufa. Yango ebongoli lolenge tomonaka bomoi ya kufa.

Lisekwa epesi biso emoneli mpe bokasi ya komema mikakatano ya kufa oyo moko moko na biso mpe na baoyo tolingaka tokutanaka na yango. Epesi biso nzela ya sika ya komona botau ya nzoto, makanisi, to na molimo na mbotama to oyo tozwaka na bomoi ya kufa. Epesi biso bokasi ya koyika mpiko na mawa, bokwei mpe na bosisoi. Mpo moko moko na biso alikye lisekwa, toyebi ete bozangi na nzoto ya kufa to kotelemela oyo ezali kaka ya ntango.

Lisekwa epesi biso lisusu nguya ya makasi ya kobomba mitindo ya Nzambe kati na bomoi na biso ya kufa. Ntango tosekwi uta na liwa mpe tokeyi na bosambisi ya nsuka oyo esakolamaki, tolingi koponama na ntina ya mapamboli kitoko elakelama na basekwi.2

Elilingi
Tokoki kobika lokola libota seko na seko

Mpe lisusu, elaka ya Lisekwa ekoki kobakisa libaku ya kozala elongo na bato ya libota na biso—mobali, mwasi, bana, baboti mpe bakitani—ezali lilendisi ya nguya mpo na kokokisa mikumba ya libota na biso na bomoi ya kufa. Esungakabiso lisusu na kobika elongo kati na bolingo na bomoi oyo mpe ezali kolendisa biso na bokufi ya balingami na biso. Toyebi ete bokabwani ya kufa ezali kaka mpo na ntango, tomibongisi liboso na ntina ya makita mpe bosangani ya esengo ekoya. Lisekwa epesaka biso elikya mpe bokasi ya kozala motema molayi ntango tozali kozela. Elengelaka biso lisusu na mpiko mpe limemia mpo na kolonga liwa na biso moko—atako ekoki kobiangama ya mbalakaka.

Bilembo binso oyo ya Lisekwa bizali eteni ya yambo ya eyano na motuna “Yesu Klisto asala nini mpo na ngai?”

II.

Mpo na mingi kati na biso, libaku ya bolimbisami ya masumu ezali ndimbola monene ya Bomikabi ya Yesu Klisto. Na kati na kokumisa, toyembaka na limemia:

Makila n Ye ya ntalo esopanaki na motema ya bolingi;

Bomoi na Ye apesaki ya ofele.

Libonza ezanga lisumu mpo na moto na elindo,

Mokili ya kokufa mpo na kobikisa.3

Mobikisi mpe Mosikoli na biso ayikaki mpiko na minyoko mpo na kokoma libonza mpo na masumu ya bakufi banso baoyo bakoyambola. Libonza ya bomikabi epesi bolamu ya koleka, mwana mpate ya peto azanga mbindo—mpo na mabe eleki ndelo, masumu mpo na mokili mobimba. Afungoli ekuke mpo na moko moko na biso apetolama mpo na masumu na ye moko bongo tokoki kondimama na liboso ya Nzambe, Tata ya Seko. Ekuke efungwama ebongisami mpo na bana banso ya Nzambe. Na kati na kokumbamela toyembaka:

Nazali na esengo ete akokaki kokita na ngbende na Ye ya bonzambe

Mpo na kobikisa molimo ya motomboki mpe ya lolendo lokola ya ngai,

Ete asengelaki kolakisa bolingo na ye ya monene na moto lokola ngai.4

Mbuma ya malamu mpe ezangi kososolama ya Bomikabi ya Yesu Klisto evandi na bolingo ya Nzambe mpo na moko moko na biso. Endimisi maloba na Ye ete “motuya ya molimo”—oyo ya mokufi nyonso—“ezali monene na miso ya Nzambe” (Malongi mpe Mabongisi 18:10). Na kati ya Biblia Yesu Klisto alimbolaki na maloba ya bolingo ya Tata na Lola: “Mpo ete Nzambe alingaki mokili, ete apesaki Mwana na ye moko ya likinda, ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te, kasi ete azala na bomoi ya seko” (Yoane 3:16). Na emoniseli ya mikolo oyo Mosikoli na biso Yesu Klisto atatolaki ete Ye “alingaki mokili mingi mpenza, ete apesaki bomoi na ye moko, mpo na baye banso bakondimela bakoma bana ya Nzambe” (Malongi and Mayokani 34:3).

Ezali solo kokamwisa, lisusu, ete Buku ya Mormon, “Litatoli mosusu ya Yesu Klisto,” esukisi na mateya ete kokoma moto azangi masumu mpe” “abulisami na Klisto,” to sengeli “kolinga Nzambe na makasi na [biso] nionso, mayele mpe bokasi” (Moloni 10:32–33Moroni 10:32–33). Mwango na Ye etindikami na bolingo esengeli eyambama na bolingo.

III.

Mobikisi na biso Yesu Klisto asala lisusu nini mpo na biso? Na nzela ya mateya ya baprofeta na Ye mpe na nzela ya misala na Yemei, Yesu ateyaki biso mwango ya lobiko. Mwango oyo ekotisi bokeli, ntina ya bomoi, ntina ya bokeseni, mpe likabo ya bonsomi ya kopona. Ateyaki biso lisusu mitindo mpe mabongisi esengeli totosa mpe makuli tosengeli kosala mpo na ezongisa biso epai ya baboti na biso ya Lola.

Elilingi
Mateya likolo na Ngomba

Na kati na Biblia totangi mateya na Ye, “Nazali pole ya mokili: oyo akolanda ngai akotambola kati ya molili te, kasi akozala na pole ya bomoi” (Yoane 8:12). Mpe na bobimisi ya mikolo oyo totangi, “Tala, Nazali Yesu Klisto , … pole oyo ekoki te kobombama na molili” (Malongi mpe Mabongisi 14:9). Soki tolandi mateya na Ye, Akongengisa nzela na biso na bomoi oyo mpe akopesa biso elikya na bomoi ekoya.

Mpo Alingi biso, Atie biso na momekano ya kotia mayele epai na Ye, na esika ya biloko ya mokili oyo ya kufa. Na Mateya na Ye ya lipa na bomoi, Yesu ateyi ete tosengeli te kozala bato oyo bakangami na biloko ya mokili—biloko oyo esungi bomoi na nse kasi epesi bilei te mpo na bomoi ya seko.5 Lokola Yesu abiangi biso lisusu mpe lisusu mpe lisusu,“landa ngai.”6

IV.

Na nsuka, Buku ya Mormon eteyi ete lokola eteni ya Bomikabi na Ye Yesu Klisto “ayoka[ka] mpasi ya bolozi mpe mitungisi mpe masenginia ma lolenge na lolenge; mpe eye ete liloba likoka kokokisama liye lilobi akokamata likolo na ye bolozi mpe bokono ya bato na ye” (Alma 7:11).

Ntina nini ayokaki mpasi ya mimekano oyo “ya ndenge nyonso”? “Mpe akokamata likolo na ye bokono na bango, ete nsopo na ye ekoka kotonda na ngolu, engebene na mosuni, ete akoka koyeba engebene na mosuni boniboni kosalisa[oyo elakisi kopesa kimia to lisungi na] bato na ye engebene na bokono na bango” (Alama 7:12).

Elilingi
Klisto na Getesemana

Mobikisi na biso asosoli mpe ayebi masenginia na biso, bitumba na biso, bampasi ya motema na biso, mpe mpasi na biso, mpo Alingaki koyeba yango manso lokola eteni ya ntina mpenza ya Bomikabi na Ye. Makomi masusu elobi yango. Kondimana na Sika esakoli, “Mpamba te Ye moko mpe akutanaki na komekama, azali na makoki ya kosalisa bango baoyo bamekami” (Baebele 2:18). Yisaya ateyi, “Kobanga te; mpo nazali elongo na yo: …Nakolendisa yo; iyo, nakosunga yo.”(Yisaya 41:10). Baye banso bazali na mpasi ya kozala boye basengeli komikundola ete Mobikisi na biso amonaki lolenge oyo ya mpasi lisusu mpe ete, na ntina ya Bomikabi na Ye, Apesi moko moko na biso mpiko mpo na komema yango.

Profeta Joseph Smith alobaki na bokuse oyo nyonso na Biteni ya Bondimi ya misato: “Tondimi ete na nzela ya Bomikabi bwa Klisto, bato banso bakoki kobikisama, na kotosaka mibeko mpe makuli na Nsango elamu.”

“Yesu Klisto asala nini mpo na ngai?” ndeko mwasi wana atunaki. Na nzela ya mwango ya Tata na biso ya Lola,Ye, “Azalisaki balola mpe banse” (Malongi mpe Mabongisi 14:9) bongo moko moko na biso akoki koleka na mimekano oyo misengeli mpo na koluka nsuka na biso ya bonzambe. Lokola eteni ya mwango ya Tata, Lisekwa ya Yesu Klisto elongaki liwa mpe epesi elikya na moko moko na biso mpo na bozangi kufa. Libonza ya Bomikabi ya Yesu Klisto epesi moko moko na biso libaku ya koyambola masumu na biso moko mpe kozonga peto na ndako na biso ya lola. Mitindo mpe mabongisi elakisi biso nzela, mpe bonganganzambe na Ye epesi biso nguya ya kobongisa malamu makuli masengeli mpo na kokoma na nsuka na biso. Mpe mobikisi na biso alekaki na bampasi mpe mikakatano ya nzoto na ntina ete Ayeba lolenge nini kosalisa biso na mimekano na biso.

Elilingi
Yesu Klisto

Yesu Klisto asala nyonso wana mpo ete Alingi bana banso ya Nzambe. Bolingo ezali ntina ya makambo manso, mpe ezalaki bongo uta na ebandeli. Nzambe alobaki na biso na emoniseli ya mikolo oyo ete “ azalisaki … mobali mpe mwasi, na elilingi na ye … mpe apesaki bango mitindo ete esengeli bango kolinga mpe kosalela ye” (Malongi mpe Mabongisi 20:18–19).

Natatoli bosolo ya makambo oyo, mpe na sambeli ete tomikundola Mobikisi na biso asala nini mpo na moko moko na biso mpe ete tokolinga Ye mpe kosalela Ye, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Bimisa na lokasa