Oyo Tozali Koyekola mpe Tokobosana ata Mokolo moko Te
Soki otali bomoi na yo na losambo, nakanisi okomona banzela ebele na yango Nkolo azali kokamba yo na ngonga oyo ya mpasi.
Bandeko na ngai ya bolingo, nazelaki mingi likita ya virituele oyo elongo na bino. Mbala ya nsuka tosalaki liyangani ya bonganganzambe ya likita linene ezalaki na sanza ya minei 2019. Mingi esalemi na mibu mibale miye mileki. Basusu kati na bino babungisi balingami. Basusu babungisa misala, banzela ya kobikela, to bokolongono ya nzoto. Lisusu basusu babungisi liyoki ya kimia to elikya mpo na lobi ekoya. Nazali koyoka mawa mpo na moko na moko na bino oyo ayoki mpasi ya kobungisa baye to mpasi ya kobungisa ya lolenge mosusu. Nazali kosambela ntango nyonso ete Nkolo akopesa bino libondi. Ntango bozali kokoba kotika Nkolo kozwa esika ya liboso na bomoi na bino, nayebi ete Ye azali na makanisi malamu na ntina ya lobi ekoya na bino lokola ezala Ye naino te.
Na kati ya kobungisa ya boye tokutani na yango, ezali lisusu na makambo mosusu biso tozwi Basusu bazwi bondimi ya mozindo koleka kati na Tata na Biso ya Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto. Mingi bazwi emoneli ya sika etali bomoi—kutu emoneli ya seko. Bokoki kozwa mikangano makasi koleka elongo na balingami na bino mpe na Nkolo. Mpe nalikii ete bozwi makoki mingi mpo na koyoka Ye mpe kozwa emoniseli ya bino moko. Mimekano ya mpasi mbala mingi epesaka mabaku ya kokolisa oyo ekokaki koya na lolenge mosusu te.
Zongisa makanisi nsima na mibu mibale mileki. Boniboni ekoli yo? Nini oyekoli? Okokaki na ebandeli kolinga ozonga na 2019 mpe kotikala kuna. Kasi soki otali bomoi na yo na losambo, nakanisi okomona banzela ebele na yango Nkolo azali kokamba yo na ngonga oyo ya mpasi, kosunga yo okoma komipesa mingi, moto abongwama mingi—moto ya solo ya Nzambe.
Nayebi Nkolo azali na miango minene mpe kitoko mpo na biso—moto na moto mpe banso. Na mawa mpe bompikiliki, Ye alobi:
“Bozali bana mike, mpe naino bososoli te mapamboli minene ya lolenge nini oyo Tata … alengeli mpo na biso;
“Mpe bokoki te komeme makambo nyonso sikoyo; nzokande, bozala na esengo monene, mpo nakokamba bino.”1
Bandeko na ngai mibali ba bolingo, natatoli ete Ye azalaki, mpe azali, solo kokambaka biso, ntango tozali koluka koyoka Ye. Alingi biso tokola mpe toyekola, kutu kati na—ntango mosusu mingimingi kati na—motungisi.
Motungisi ezali moteyi monene. Nini yo oyekoli na mibu mibale mileki oyo olingi ntango nyonso komikundola? Biyano na yo ekozala se ya yo moko, kasi ekoki ngai kopesa mateya minei nalikii toyekoli banso mpe tokobosana ata mokolo moko te.
Liteya 1: Ndako Ezali Esika ya Bondimi mpe Bokumbameli
Mbala mingi ntango Nkolo akebisaka biso mpo na oyo etali makama ya mikolo ya nsuka, Ye apesaki toli oyo: “Botelema na bisika bisantu, mpe boningana te.”2 “Bisika bisantu” oyo solo esangisi batempelo ya Nkolo mpe bandakonzambe. Kasi lokola makoki na biso ya kosangana na bisika oyo epekisamaki na bandelo ya ndenge na ndenge, toyekoli ete esika esantu koleka mpenza nyonso ezali ndako—solo, kutu ya yo ndako.
Bandeko, bozali na bonganganzambe ya Nzambe. “Makoki ya bonganganzambe ekangani ngwi mpenza na banguya ya lola.”3 Yo mpe libota na yo bozwaki makuli ya bonganganzambe. Ezali “na makuli wana [ya bonganganzambe], nde nguya ya bonzambe ezali komonana.”4 Nguya wana ekoki kozwama na yo mpe libota na yo kati na ndako na yo moko ntango ozali kobatela mayokani osali.5
Kaka mibu 185 eleki—mokolo oyo ya 3 mpenza—Sanza ya minei, 1836, Elijah azongisaki bafungola ya bonganganzambe eye epesaka mabota na biso ndingisa ya kokangisama elongo mpo na libela. Yango wana ezalaki mpenza malamu kosala makuli ya elambo na libota na biso. Lolenge nini okanisi ete ezali na litomba na bato ya libota na yo bamona yo, ya bango tata, nkoko mobali, mwana mobali, to ndeko mobali, kosala likuli esantu oyo? Okosala nini mpo na kobomba liyoki wana ya bule na libota na yo?
Okoki kokanisa ete ezali na mingi osengeli kosala mpo na kokomisa ndako na yo solo ndako ya losambo ya bondimi. Soki ezali bongo, tosengi bosala yango! Soki obala, sangana na mwasi na yo lokola moninga ya mosala bokokana kati na mosala ya motuya oyo. Ezali na mwa misala ya motuya mingi koleka oyo. Katikati ya sikawa mpe ngonga Nkolo akoya lisusu, banso tozali na mposa bandako na biso ezala bisika ya kimia mpe ezangi likama.6
Bizalela mpe misala oyo ebengisaka Molimo ekomatisa bosantu ya ndako na yo. Ekokana na solo ezali likambo ete bosantu ekolimwa soki ezali na eloko moko na ezalela na yo to nzinganzinga oyo etukaka Molimo Mosantu, mpo nsima “balola ekangami yangomei.”7
Omitungisaki ata mokolo moko te mpo na nini Nkolo alingi biso tokomisa bandako na biso esika ya koyekola nsango malamu mpe kosalela nsango malamu? Ezali kaka te kolengela biso mpo na, mpe kosunga biso kati na, bokono ya mokili mobimba. Babopekisi ya sikoyo etali bosangani ekosuka nsukansuka. Nzokande, bomipesi na yo ya kosala ndako na yo ya yo ndako ya losambo ya yambo ya bondimi esengeli mokolo moko te kosuka. Ntango bondimi mpe bosantu ekiti na mokili oyo esambwa, bosenga na yo mpo na bisika bisantu ekobakisama. Nakosenga yo okoba kokomisa ndako na yo esika moko esantu solo “mpe kolongwaka te”8 na ntina wana ya motuya.
Liteya mibale: Tozali na Bosenga ya Moko na Mosusu
Nzambe alingi biso tosala elongo mpe tosungana moko na mosusu. Yango wana Atindi biso na mabele na mabota mpe abongisi biso na bapalwasi mpe makonzi. Yango wana Asengi biso tosala mpe tosalisana. Yango wana Asengi biso tofanda na mokili kasi tozala ya mokili te.9 Tokoki kokokisa elongo mingimingi mpenza elongo koleka oyo tokoki biso moko.10 Mwango ya Nzambe ya esengo ekoyokisama mpasi soki bana na Ye batikalaki bango moko uta moko na mosusu.
Bokono ya mokili mobimba ya kala te ezalaki se moko mpo ete esimbaki moto nyonso na mokili na ngonga solo kaka moko. Ntango boko baniokwamaki mingi koleka basusu, biso banso tozwaki mikakatano na ndenge ebele. Mpo na yango, momekano ya kokabolana ezali na nguya ya kosunga kosangisa bana ya Nzambe lokola esalema naino te liboso. Bongo, natuni, momekano ya kokabolana oyo ebendi yo penepene koleka epai ya bato ya pembeni na yo—epai ya bandeko na yo mibali mpe basi na balabala mobimba mpe ya mokili mobimba?
Na yango, mitindo minene mibale ekoki kokamba biso: yambo, kolinga Nzambe mpe, ya mibale, kolinga mozalani na biso.11 Tolakisaka bolingo na biso na kosalisaka.
Soki oyebi moto moko oyo azali ye moko, sunga—ata soki omiyoki yo moko mpe! Osengeli kozala na ntina to nsango to mosala te mpo na kosala. Loba kaka “mbote” mpe lakisa bolingo na yo. Tekinolozi ekoki kosunga yo. Bokono ya mokili mobimba to te, mwana ya Nzambe ya ntalo moko na moko asengeli koyeba ete azali ye moko te!
Liteya ya 3: Lisanga likoki na Yo ya Bonganganzambe Esalemi mpo na Mingi Koleka Kaka Liyangani moko
Na eleko ya bokono ya mokili mobimba, mayangani ya lisanga likoki ya eyenga elongolamaki mpo na mwa ntango. Masanga makoki mosusu mazali sikawa na makoki ya kokutana na nzela ya tekinoloji to na virituele. Nzokande, mosala Nkolo apesi masanga makoki ya bonganganzambe masalema mokolo moko te kofinama na liyangani moko. Mayangani mazali bobele eteni moko ya moke ya maye lisanga likoki esalemeli mpe maye ekoki kosala.
Bandeko na ngai ya Bonganganzambe ya Alona mpe masanga makoki ya bampaka, botandola limoni na bino ya mpo na nini tozali na masanga makoki. Lolenge nini Nkolo alingi yo kosalela lisanga likoki na yo mpo na kokokisa mosala na Ye—sikawa? Luka emoniseli na Nkolo Mikitisa! Senga! Yoka! Soki obiangemi mpo na kokamba, sala likita lokola bokambi mpe elongo na bato ya lisanga likoki. Ata soki mosala to libiangi na yo ya bonganganzambe ezali nini, tika Nzambe azwa esika ya liboso na bomipesi na yo lokola moto ya lisanga likoki na yo mpe na mosala na yo. Salela na esengo bosembo okomema lokola ozali “komipesa na motema moko na mosala malamu.”12 Masanga makoki mazali na esika moko mpo na kotambwisa mbango bosangani ya Yisalaele na ngambo mibale ya elamba.
Liteya 4: Toyokaka Yesu Klisto Malamu koleka Ntango Tozali Kimia
Tozali kobika na ntango oyo esakolama kala mpenza, ntango “makambo nyonso ekozala na mobulungano; mpe ya solo, mitema ya bato ekozanga bango; mpo bobangi ekokoma likolo ya bato banso.”13 Wana ezalaki solo liboso ya bokono ya mokili mobimba, mpe ekozala solo nsima. Mobulungano na mokili ekokoba komata. Na bokeseni, mongongo ya Nkolo ezali te “mongongo moko mwa makelele mwa lokito lonene, kasi … yango [ezali] mongongo moko mwa kimia mpe elengi ebonga nie, [lokola] soko ezalaki lisololi lyoko, mpe yango [etoboli] kutu na molimo mpenza.”14 Mpo na koyoka mongongo ya kimia oyo, osengeli kozala kimia!15
Mpo na mwa ntango, bokono ya mokili mobimba ebomaki misala to milulu oyo elingaki kotondisa bomoi na biso. Nokinoki tokoki kozala na makoki ya kopona kotondisa ngonga wana lisusu na makelele mpe mobulungano ya mokili. To tokoki kosalela ntango na biso mpo na koyoka mongongo ya Nkolo kosololaka na nse ya bokambi na Ye, libondi, mpe kimia. Ngonga ya kimia ezali ngonga ya bule—ngonga oyo ekosalisa emoniseli ya moto se ye moko mpe ekokotisa kimia.
Mitosa mpo na kolekisa ngonga yo moko mpe elongo na balingami na yo. Fungola motema na yo epai ya Nzambe na losambo. Zwa ngonga ya komizindisa na makomi mpe kokumbamela kati na tempelo.
Bandeko babolingo, ezali na makambo mingi Nkolo alingi biso toyekola uta na makambo tokutani na yango na eleko ya bokono ya mokili mobimba oyo. Natangi kaka minei. Nabengisi bino bokoma ya bino moko, botala yango na bokebi, mpe bokabola yango na baye bolingaka.
Lobi ekoya ezali kongenga mpo na bato babateli mayokani ya Nzambe16 Nkolo akobianga mingimingi basali na Ye oyo na bolongobani bazali na bonganganzambe mpo na kopambola, kobondisa, mpe kolendisa bato mpe kosunga kolengela mokili mpe bato na yango mpo na Boyei ya Mibale. Etali moko na moko na biso mpo na kolongobana mpo na bokuli ya bule tozwi. Tokoki kosala oyo! Natatoli bongo, na elobeli na ngai ya bolingo mpo na moko na moko na bino, balingami bandeko na ngai ya mibali, na nkombo ya bule ya Yesu Klisto, amene.