Makomi
Malongi mpe Mayokani 107


Eteni 107

Emoniseli likolo ya bonganganzambe, epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, penepene na sanza ya minei ya mobu 1835. Atako eteni oyo ekomamaki na mobu 1835, nkoma uta na mambi ya kala endimi ete ndambo muningi koleka ya milongo 60 kino 100 ekotisi kati na yango emoniseli epesamaki na nzela ya Joseph Smith na mokolo ya 11, sanza ya zomi na moko ya mobu 1831. Eteni oyo esangisamaki na bobongisi ya Lisanga likoki ya Bazomi na mibale na sanza ya mibale mpe ya misato ya mobu 1835. Ekoki kozala solo ete Profeta abimisaki yango na miso ya baoyo bazalaki komilengela kokende na mokolo ya 3, sanza ya mitano ya mobu 1835, na etinda na bango ya yambo ya lisanga likoki.

1–6, Ezali na bonganganzambe mibale: bonganzambe ya Melikisedeki mpe ya Alona; 7–12, Baoyo wana bazali na Bonganganzambe ya Melikisedeki bazali na nguya ya kosala na lotomo nyonso kati na Eklezia; 13–17, Bopisikopo eyangelaka likolo ya Bonganganzambe ya Alona, boye epesaka makuli ya libanda; 18–20, Bonganganzambe ya Melikisedeki ezali na bafungola ya mapamboli nyonso ya molimo; Bonganganzambe ya Alona ezali na bafungola ya lisalisi ya banjelu; 21–38, Bokambi ya Yambo, Bazomi na mibale, mpe Bantuku sambo basali masanga makoki ya boyangeli, baoyo kani bikateli bikamatami na bomoko mpe na bosembo; 39–52, Molongo ya bonkoko motiami uta na Adama kino na Noa; 53–57, Basantu ya kala bayanganaki na Adama-ondi-Amana, mpe Nkolo amonanaki na bango; 58–67, Bazomi na mibale basengeli kotia bakambi ya eklezia na molongo; 68–76, Baepisikopo basalaka lokola basambisi ya nyonso na Yisalaele; 77–84, Bokambi ya Yambo mpe Bazomi na mibale basali ndako ya bosambisi ya likolo koleka kati na Eklezia; 85–100, Bakambi ya bonganganzambe bayangelaka masanga makoki na bango moko moko.

1 Kati na eklezia ezali na Bonganganzambe mibale, na nkombo, bonganganzambe ya Melikisedeki mpe ya Alona, esangisi Bonganganzambe ya Levi.

2 Ntina nini ya yambo ebiangami Bonganganzambe ya Melikisedeki ezali mpo Melikisedeki azalaki nganganzambe monene.

3 Liboso ya mokolo na ye ebiangamaki Bonganganzambe Bosantu, na Molongo ya Mwana ya Nzambe.

4 Kasi na ntina ya botosi to mpe limemia mpo na nkombo ya Mozali ya Nta Likolo, na koboyaka nkombo na ye etangamaka mbala na mbala koleka, bango, eklezia, na mikolo ya kala, babiangaki bonganganzambe boma na nkombo ya Melikisedeki, to Bonganganzambe ya Melikisedeki.

5 Mikumba to ntomo nyonso mosusu kati na eklezia ezali bitape ekangemi na bonganganzambe boye.

6 Kasi ezali na bokabwani mibale to mitu minene ya likambo—moko ezali Bonganganzambe ya Melikisedeki, mpe mosusu ezali Bonganganzambe ya Alona to Bonganganzambe ya Lewi.

7 Lotomo ya mpaka eyaka na nse ya Bonganganzambe ya Melikisedeki.

8 Bonganganzambe ya Melikisedeki ezali na makoki ya bokambi, mpe ezali na nguya mpe likoki likolo ya ntomo nyonso mosusu kati na eklezia na bikeke nyonso ya mokili, mpo na kosalela na makambo nyonso ya molimo.

9 Bokambi ya Bonganganzambe ya Monene, engebene na molongo ya Melikisedeki, ezali na makoki ya kosala na ntomo nyonso kati na eklezia.

10 Banganganzambe minene engebene na molongo ya Bonganganzambe ya Melikisedeki bazali na makoki ya kosala kati na lotomo na bango moko, na nse ya boyangeli ya bokambi, na kosalaka mosala ya makambo ya molimo, mpe lisusu kati na lotomo ya mpaka, nganganzambe (ya molongo ya Lewi), moteyi, diakona, mpe mondimi.

11 Mpaka azali na makoki ya kosala na esika na ye ntango nganganzambe monene azali te.

12 Nganganzambe monene mpe mpaka basengeli kosalela na makambo ya molimo, engebene na mayokani mpe mitindo ya eklezia; mpe bazali na makoki ya kosala kati na ntomo nyonso oyo ya eklezia ntango bakonzi ya likolo bazali te.

13 Bonganganzambe ya mibale ebiangami Bonganganzambe ya Alona, mpamba te epesamaki likolo ya Alona mpe nkona na ye, kolandaka nkola na bango nyonso.

14 Ntina nini ebiangami bonganganzambe ya moke ezali mpo ete ezali yoko etape ya monene koleka, to Bonganganzambe ya Melikisedeki, mpe ezali na nguya ya kopesaka makuli ya libanda.

15 Bopisikopo ezali bokambi ya bonganganzambe oyo, mpe ezali na bafungola to likoki ya se yango moko oyo.

16 Moto moko te azali na makoki engebene na mobeko mpo na kosala na lotomo loye, ya kozala na bafungola ya bonganganzambe oyo, longola se soki azali eboto na makila ya Alona.

17 Kasi mpo nganganzambe monene ya Bonganganzambe ya Melikisedeki azali na likoki ya kosala kati na ntomo nyonso ya mike, akoki kosala kati na lotomo ya episikopo ntango eboto ya Alona na makila akoki kozwama, longola se soki abiangami mpe atiami mpembeni mpe akulisami na nguya oyo na maboko ya Bokambi ya Bonganganzambe ya Melikisedeki.

18 Nguya mpe likoki ya bonganganzambe ya likolo, to Bonganganzambe ya Melikisedeki, ezali ya kozala na bafungola ya mapamboli nyonso ya molimo ya eklezia—

19 Mpo na kozala na litomba ya kozwa mabombami ya bokonzi ya lola, ya kozala na lola efungolami mpo na bango, ya kosangana elongo na eyangani monene mpe eklezia ya Mobotami ya yambo, mpe ya kosepela na lisanga mpe kozala na miso ya Nzambe Tata, mpe Yesu moyokanisi ya liyokani ya sika.

20 Nguya mpe likoki ya bonganganzambe ya moke, to Bonganganzambe ya Alona, ezali ya kozala na bafungola ya mosala ya banjelu, mpe ya kopesaka makuli ya libanda, nkoma ya nsango malamu, libatisi ya boyamboli mpo na bolimbisi ya masumu, engebene na mayokani mpe mitindo.

21 Esengeli ete bakambi bazala, to basali bakambi uta na kati na bango, to baoyo baponami uta na kati to na kati ya baoyo wana bakulisami na ntomo ebele kati na bonganganzambe oyo mibale.

22 Uta na Bonganganzambe ya Melikisedeki, Banganganzambe Minene Bakambi Misato, baoyo baponami na lisanga, baoyo babiangami mpe bakulisami na lotomo wana, mpe basungami mpo batieli bango motema, na bondimi, mpe na losambo ya eklezia, nde basali lisanga likoki moko ya Bokambi ya Eklezia.

23 Bapesi toli zomi na mibale ya lisanga ya mobembo babiangami kozala Bapostolo Zomi na mibale, soki te banzeneneke baleki malamu ya nkombo ya Klisto kati na mokili mobimba—oyo kokesenaka na basali basusu ya eklezia na kotalaka misala ya libiangi na bango.

24 Mpe bazali kosala lisanga likoki moko, oyo ekokani na likoki mpe nguya na bakambi misato baoyo batangami awa liboso.

25 Bantuku sambo babiangami lisusu koteya nsango malamu, mpe kozala banzeneneke baleki malamu epayi ya baoyo bazali Bayuda-te mpe na mokili mobimba—boye bakeseni na bakambi basusu ya eklezia na kotalaka misala ya libiangi na bango.

26 Mpe bazali kosala lisanga likoki, oyo ekokani na likoki na oyo ya banzeneneke baleki malamu Zomi na mibale to Bapostolo bawuti kotangama awa likolo.

27 Mpe ekateli nyonso oyo ezwami na moko ya masanga makoki oyo esengeli kozwama na kopona na bondimami ya bato nyonso ya masanga wana; elingi koloba, moto moko moko ya lisanga moko moko asengeli kondima bikateli ya lisanga, mpo na kozwa bikateli na bango na nguya to bokasi se moko wana moko na mosusu—

28 Ndambo moko monene ya bato ekoki kosala lisanga likoki ntango bato nyonso bakoki te kozala wana—

29 Longola se soki likambo ezali bongo, bikateli na bango ezali na makoki te ya kopesa mapamboli se moko oyo lokola bikateli ya lisanga likoki ya bakambi misato ezalaki na yango na ntango ya kala, baoyo bakulisamaki engebene na molongo ya Melikisedeki, mpe bazalaki bato ya sembo mpe bato ya santu.

30 Bikateli ya masanga makoki oyo, to moko kati na yango, esengeli kozwama na bosembo nyonso, na bosantu, mpe na bokitisi ya motema, na bomikitisi mpe motema molai, mpe na bondimi, mpe na libongi, na mayele, na motema ya kokita, na motema monene, na bolamu mpe na bolingani;

31 Mpo elaka ezali ete, soki makambo oyo ezali beboo kati na bango bakozanga kobota mbuma te na boyebi ya Nkolo.

32 Mpe soki ekateli ya masanga makoki ezwami kati na bozangi bosembo, ekoki komemama liboso ya eyangani monene ya masanga makoki ebele, oyo ezali kosala bakonzi ya eklezia na molimo; soki bongo te botubi ekoki kozala uta na ekateli na bango te.

33 Bazomi na mibale bazali Lisanga Monene ya Boyangeli ya Mobembo, mpo na kosala na nkombo ya Nkolo, na nse ya bokambi ya Bakambi ya Eklezia, engebene na etuluku ya lola; mpo na kotonga eklezia, mpe kobongisa makambo nyonso ya eklezia se moko oyo kati na bikolo nyonso, yambo epayi ya baoyo bazali Bayuda-te mpe nsima epayi ya Bayuda.

34 Bantuku sambo basengeli kosala na nkombo ya Nkolo, na nse ya bokambi ya Bazomi na mibale to lisanga monene ya mobembo, na kotongaka eklezia mpe kobongisaka makambo nyonso ya eklezia se moko oyo kati na bikolo nyonso, yambo epayi ya baoyo bazali Bayuda-te mpe nsima epayi ya Bayuda—

35 Mpe Bazomi na mibale batindamaki, mpe bazali na bafungola, mpo na kofungola ekuke na kosakolaka nsango malamu ya Yesu Klisto, yambo epayi ya baoyo bazali Bayuda-te mpe nsima epayi ya Bayuda.

36 Masanga minene ya ntango nyonso, na makonzi ya Siona, masali lisanga likoki moko oyo ekokani na likoki mpo na oyo etali makambo ya eklezia, na bikateli na bango nyonso, na lisanga likoki ya bokambi, soki na lisanga monene ya mobembo.

37 Lisanga monene na Siona nde esali lisanga likoki moko oyo ekokani na likoki mpo na oyo etali makambo ya eklezia, na bikateli na bango nyonso, na masanga ya Bazomi na mibale na makonzi ya Siona.

38 Ezali mosala ya lisanga monene ya mobembo ya kobenga Bantuku sambo, ntango bazali koluka lisalisi, mpo na kokokisa mabiangi ebele ya koteya mpe kosalela nsango malamu, na esika ya soki nani basusu.

39 Ezali mosala ya Bazomi na mibale, na bitape minene nyonso ya eklezia, ya kokulisa basali na nsango malamu, lokola bakolakisama epayi na bango na nzela ya emoniseli—

40 Molongo ya bonganganzambe oyo etiamaki mpo na kokitanisama uta na tata epayi ya mwana mobali, mpe engebene na mibeko ezali ya eboto na makila ya nkona oyo eponamaki, epayi ya nani bilaka epesamaki.

41 Molongo oyo etiamaki lokola etuluku na mikolo ya Adama, mpe ekitaki na monkoloto ya bana na lolenge elandi:

42 Uta Adama na Sete, oyo akulisamaki na Adama na mibu ntuku motoba na libwa, mpe apambolamaki na ye mibu misato liboso ya liwa na ye (Adama), mpe azwaki elaka ya Nzambe na nzela ya tata na ye, ete bana na ye bakoponama na Nkolo, mpe bakobatelama kino na nsuka ya mabele;

43 Mpo ete ye (Sete) azalaki moto moko ya kobonga nie, mpe lolenge na ye elimbolaki lolenge mpenza ya tata na ye, na lolenge ete akokanaki na tata na ye na makambo nyonso, mpe akokaki kokesena na ye bobele na mibu na ye.

44 Enosa akulisamaki na mobu ya monkama moko na ntuku misato na minei mpe sanza minei, na maboko ya Adama.

45 Nzambe abengaki Kaina na esobe na mobu ya ntuku minei ya bomokolo na ye; mpe akutanaki na Adama wana ezalaki ye kokende mobembo na esika eyebani lokola Shedolamaka. Azalaki na mibu ntuku mwambe na nsambo ntango azwaki bokuli na ye.

46 Mayalalele azalaki na mibu nkama minei mpe ntuku libwa na motoba mpe mikolo sambo ntango akulisamaki na maboko ya Adama, oyo apambolaki ye lisusu.

47 Yelede azalaki na mibu nkama mibale ntango akulisamaki na maboko ya Adama, oyo apambolaki ye lisusu.

48 Enoka azalaki na mibu ntuku mibale na mitano ntango akulisamaki na maboko ya Adama; mpe azalaki na mibu ntuku motoba na mitano mpe Adama apambolaki ye.

49 Mpe amonaki Nkolo, mpe atambolaki elongo na ye, mpe azalaki liboso na ye ntango nyonso; mpe atambolaki elongo na Nzambe mibu nkama misato mpe ntuku motoba na mitano, oyo ekomisaki ye na mibu nkama minei na ntuku misato ntango abongolamaki.

50 Metusela azalaki na mibu nkama moko ntango akulisamaki na maboko ya Adama.

51 Lameka azalaki na mibu ntuku misato na mibale ntango akulisamaki na maboko ya Sete.

52 Noa azalaki na mibu zomi ntango akulisamaki na maboko ya Metusela.

53 Mibu misato liboso ya liwa ya Adama, abiangaki Sete, Enosa, Kaina, Mayalalele, Yelede, Enoka, mpe Metusela, baoyo bazalaki nyonso banganganzambe minene, elongo na montika ya bana na ye oyo bazalaki bato ya sembo, na lobwaku ya Adama-ondi-Amana, mpe kuna apesaki lipamboli na ye ya nsuka likolo na bango.

54 Mpe Nkolo amonanaki epayi na bango, mpe bango batelemaki mpe bapambolaki Adama, mpe babengaki ye Mikaele, mwana ya mokonzi, anjelu monene.

55 Mpe Nkolo apesaki lipamboli ya bolendisi epayi ya Adama, mpe alobaki epayi na ye: Natie Natie yo kozala na moto; ebele ya bikolo bakobima uta na yo, mpe ozali mwana ya mokonzi likolo na bango libela.

56 Mpe Adama atelemaki na katikati ya lingomba; mpe, ata angunzamaki na bozito ya mibu, kotondaka na Molimo Mosantu, asakolaki liboso esalema makambo nyonso makoyela bana na ye kino na nkola ya nsuka koleka nyonso.

57 Makambo oyo nyonso ekomamaki na buku ya Enoka, mpe esengeli kotatolama na ntango esengeli.

58 Ezali mosala ya Bazomi na mibale, lisusu, ya kokulisa mpe kotia na molongo basali nyonso ya eklezia, engebene na emoniseli oyo elobi:

59 Mpo na oyo etali eklezia ya Klisto na mboka ya Siona, ya kobakisama likolo ya mibeko ya eklezia na kotalaka mosala ya eklezia—

60 Solo, nalobi epayi na bino, elobi Nkolo na Bibele, esengeli bampaka bayangeli bazala mpo na koyangela likolo ya baoyo wana bazali na lotomo ya mpaka;

61 Mpe lisusu banganganzambe mpo na koyangela likolo ya baoyo wana bazali na lotomo ya nganganzambe;

62 Mpe lisusu bateyi mpo na koyangela likolo ya baoyo wana bazali na lotomo ya moteyi, mpe na lolenge wana, mpe lisusu badiakona—

63 Yango wana, uta na diakona kino na moteyi, mpe uta na moteyi kino na nganganzambe, mpe uta na nganganzambe kino na mpaka, mbala mingi koleka lokola babiangami, engebene na mayokani mpe mitindo ya eklezia.

64 Nsima nde eyei Bonganganzambe ya Monene, oyo ezali monene koleka nyonso.

65 Yango wana, esengeli kozala ete moto moko aponama uta na Bonganganzambe ya Monene mpo na koyangela likolo ya bonganganzambe yango, mpe akobengama Mokambi ya Bonganganzambe ya Monene ya Eklezia;

66 Soki mpe, na maloba mosusu, Nganganzambe Monene Moyangeli likolo ya Bonganganzambe ya Monene ya Eklezia.

67 Uta na ye se moko oyo nde ekobima mosala ya makuli mpe mapamboli likolo ya eklezia, na kotiama maboko.

68 Yango wana, lotomo ya episikopo ekokani na yango te; mpo lotomo ya episikopo ezali mpo na koyangela makambo nyonso ya ntango;

69 Nzokande episikopo asengeli koponama uta na Bonganganzambe ya Monene, longola se soki azali eboto na makila ya Alona;

70 Mpo longola se soki azali eboto na makila ya Alona akoki te kozala na bafungola ya bonganganzambe boma.

71 Nzokande, nganganzambe monene, elingi koloba, na molongo ya Melikisedeki, akoki kotiama mpembeni mpo na koyangela makambo nyonso ya ntango, mpe akozala na boyebi ya makambo yango na nzela ya Molimo ya bosolo;

72 Mpe lisusu mpo na kozala mosambisi na Yisalaele, mpo na kosala mosala ya eklezia, mpo na kosambisa babuki mibeko engebene na litatoli lokola ekopesama liboso na ye engebene na mibeko, na lisalisi ya bapesi toli na ye, baoyo aponaki to akopona na kati ya bampaka ya eklezia.

73 Oyo ezali mosala ya episikopo oyo azali eboto na makila ya Alona te, kasi akulisamaki na Bonganganzambe ya Monene na molongo ya Melikisedeki.

74 Boye akozala mosambisi, kutu mosambisi ya nyonso na kati ya bafandi ya Siona, to kati na likonzi moko ya Siona, to kati na etape moko ya eklezia epayi wapi akotiama mpembeni na mosala na ye, kino ndelo ya Siona eyeisami minene mpe ntina emonani ya kozwa baepisikopo to basambisi basusu na Siona to epayi mosusu.

75 Mpe mbala mingi lokola baepisikopo basusu bakoponama bakosala se na lotomo moko wana.

76 Kasi eboto na makila ya Alona azali engebene na mibeko na makoki ya kozwa bokambi ya bonganganzambe oyo, ya kozala na bafungola ya mosala oyo, ya kosala kati na lotomo ya episikopo ye moko, na kozangaka bapesi toli, ya kosambisa na Yisalaele, longola se na ntango wapi Mokambi ya Bonganganzambe ya Monene, na molongo ya Melikisedeki, amemami kosambisama.

77 Mpe ekateli ya moko to mosusu ya masanga oyo esengeli kozala engebene na motindo oyo elobi:

78 Lisusu, solo, nalobi epayi na bino, soki ezali na mosala monene koleka nyonso ya eklezia, mpe makambo ya mpasi koleka nyonso ya eklezia, mbala mingi lokola moto asepeli te na ekateli ya episikopo to ya basambisi, esengeli mapesama mpe etubama na lisanga ya eklezia, na miso ya Bokambi ya Bonganganzambe ya Monene.

79 Mpe Bokambi ya lisanga ya Bonganganzambe ya Monene akozwa nguya ya kobenga banganganzambe minene basusu, kutu zomi na mibale, mpo basalisa lokola bapesi toli; mpe boye Bokambi ya Bonganganzambe ya Monene mpe bapesi toli na ye bakozwa nguya ya kokamata ekateli na kolandaka litatoli ya banzeneneke engebene na mibeko ya eklezia.

80 Mpe nsima ya ekateli oyo likambo yango esengeli komema lisusu te kosambisama liboso ya Nkolo; mpo oyo ezali lisanga ya monene koleka nyonso ya eklezia ya Nzambe, mpe ezali ekateli ya nsuka koleka nyonso oyo ezangi kotiela ntembe mpe boyokani na makambo ya molimo.

81 Ezali na moto moko te ya eklezia oyo azangi koyangelama na lisanga oyo ya eklezia.

82 Mpe mbala mingi lokola Mokambi ya Bonganganzambe ya Monene akobuka mobeko, asengeli kosambisama liboso ya lisanga monene ya eklezia, baoyo basengeli kosungama na bapesi toli zomi na mibale ya Bonganganzambe ya Monene;

83 Mpe ekateli na bango likolo ya moto na ye ekozala nsuka ya ntembe mpe bozangi boyokani na ntina na ye.

84 Boye, moto moko te azangi koyangelama uta na boyengebene mpe mibeko ya Nzambe, ete makambo nyonso esalema na molongo mpe na lipombo liboso na ye, engebene na bosolo mpe bosembo.

85 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, mosala ya mokambi likolo ya lotomo ya diakona ezali ya koyangela likolo ya badiakona zomi na mibale, ya kofanda na makita elongo na bango, mpe ya koteya bango mosala na bango, ya kolendisaka moko mpe mosusu, lokola epesami engebene na mayokani.

86 Mpe lisusu mosala ya mokambi likolo ya lotomo ya bateyi ezali ya koyangela likolo ya bateyi ntuku mibale na banei, mpe ya kofanda na makita elongo na bango, ya koteya bango misala ya lotomo na bango, lokola epesami engebene na mayokani.

87 Lisusu mosala ya mokambi ya Bonganganzambe ya Alona ezali ya koyangela likolo ya banganganzambe ntuku minei na mwambe, mpe ya kofanda na makita elongo na bango, ya koteya bango mosala ya lotomo na bango, lokola epesami engebene na mayokani—

88 Mokambi oyo asengeli kozala episikopo; mpo oyo ezali moko ya misala ya bonganganzambe oyo.

89 Lisusu, mosala ya mokambi ya lotomo ya bampaka ezali ya koyangela likolo ya bampaka ntuku libwa na motoba, mpe ya kofanda na makita elongo na bango, mpe ya koteya bango mosala ya lotomo na bango engebene na mayokani.

90 Bokambi oyo ekeseni uta na oyo wana ya bantuku sambo, mpe epesami mpo na baoyo wana bakendaka mobembo kati na mokili mobimba te.

91 Mpe lisusu, mosala ya Mokambi ya Bonganganzambe ya Monene ezali ya koyangela likolo ya eklezia mobimba, mpe kozala lokola Mose—

92 Tala, bwania ezali awa; iyo, ya kozala momoni, mobimisi, mobongoli, mpe profeta, mpe ya kozala na makabo nyonso ya Nzambe oyo apesaka likolo ya moto ya eklezia.

93 Mpe ezali engebene na limoni kolakisaka molongo ya Bantuku sambo, ete bakozala na bakambi sambo mpo na koyangela likolo na bango, baoyo baponami uta na motango ya bantuku sambo;

94 Mpe mokambi ya sambo likolo ya bakambi oyo asengeli koyangela likolo ya bakambi motoba;

95 Mpe bakambi sambo oyo basengeli kopona bantuku sambo basusu likolo ya bantuku sambo ya baoyo bazali na bango, mpe basengeli koyangela likolo na bango;

96 Mpe lisusu bantuku sambo mosusu, kino bantuku sambo mbala sambo, soki mosala kati na elanga ya vinyo esengi yango mpenza.

97 Mpe bantuku sambo baye basengeli kozala basali ya mobembo, yambo epayi ya baoyo bazali Bayuda-te mpe lisusu epayi ya Bayuda.

98 Nzokande basali basusu ya eklezia, baoyo bazali kati na Bazomi na mibale te, soki mpe kati na Bantuku sambo te, bazali na nse ya mokumba ya kokendeka mobembo te na kati ya bikolo nyonso, kasi basengeli kokende mobembo soki libaku epesami, ata soki bakoki kozala na ntomo ya mokumba monene kati na eklezia.

99 Yango wana, sikawa tika ete moto na moto ayekola mosala na ye, mpe kosala na mosala atiami na etingia nyonso.

100 Ye oyo azali goigoi akotangama te lokola moto oyo alongobani kotelema, mpe ye oyo akoyekola mosala na ye te mpe akomilakisa ete andimami te akotangama te lokola moto oyo alongobani kotelema. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa