Makomi
Malongi mpe Mayokani 124


Eteni 124

Emoniseli epesami epayi ya Profeta Joseph Smith, na Nauvoo, Illinois, na mokolo ya 19, sanza ya yambo ya mobu 1841. Na ntina ya kobakisama ya minyokoli mpe mpo esambiseli ya bakalaki ya leta ezalaki engebene na mibeko te, Basantu basengelaki kolongwa na Missouri. Motindo ya koboma bango nie oyo ebimisamaki na Lilburn W. Boggs, guvenele ya Missouri, na mokolo ya 27, sanza ya zomi ya mobu 1838, etikelaki bango nzela mosusu ya kopona te. Na mobu 1841, ntango emoniseli oyo epesamaki, engumba ya Nauvoo, oyo ezwamaki na esika wapi ezalaki mboka ya kala ya Commerce, Illinois, etongamaki na Basantu, mpe awa etiamaki bifandeli ya Eklezia.

1–14, Joseph Smith atindami kosala yoko bosakoli ya lipombo ya nsango malamu epayi ya mokambi ya Etazini ya Amerika, bakambi ya bituka, mpe bakambi ya bikolo nyonso; 15–21, Hyrum Smith, David W. Patten, Joseph Smith Tata, mpe mingi basusu na kati ya bato na bomoi mpe bakufi bapambolami mpo na bokolongonu mpe bolamu na bango; 22–28, Basantu batindami kotonga ndako ya koyamba bapaya mpe tempelo yoko na Nauvoo; 29–36, Ebatisi mpo na bakufi esengeli kosalema kati na batempelo; 37–44, Bato ya Nkolo batongaka ntango nyonso batempelo mpo na kosala makuli masantu; 45–55, Basantu bapesami mokalo ya kotika kotonga tempelo na Etuka ya Jackson na ntina ya minyokoli ya banguna na bango; 56–83, Malako epesami mpo na kotonga Ndako ya Nauvoo; 84–96, Hyrum Smith abiangami kozala nkoko, kozwa bafungola, mpe kozala na esika ya Oliver Cowdery; 97–122, William Law mpe bato mosusu bapesami toli mpo na oyo etali misala na bango; 123–145, Bakambi minene mpe ya mboka baponami, elongo na misala na bango mpe masanga makoki na bango.

1 Solo, boye elobi Nkolo epayi na yo, mosali na ngai Joseph Smith, nazali kosepela malamu na libonza mpe bozongisi matondi na yo, oyo osali; mpo natelemisaki yo mpo ntina oyo, ete nakoka kolakisa bwania na ngai na nzela ya biloko ya bolembu ya mabele.

2 Sambo na bino ekoki kondimama liboso na ngai; mpe lokola eyano na yango nalobi epayi na yo, ete obiangami sikawa na lombangu kosala yoko bosakoli ya lipombo ya nsango malamu na ngai, mpe ya likonzi oyo nasili kopika mpo na kozala libanga ya nsuka ya Siona, oyo ekopetolama na mosala kitoko ya bobongi nie na bokokani ya ndako ya mokonzi.

3 Bosakoli oyo esengeli kosalema epayi ya bakonzi nyonso ya mokili, na bitumu minei na yango, na mokonzi ya limemia oyo aponami, mpe bakambi bituka ya limemia ya ekolo wapi ozali, mpe na bikolo nyonso ya mabele oyo epalangani bipayi na bipayi.

4 Tika ete ekomama na molimo ya bosokemi mpe na nguya ya Molimo Mosantu, oyo ekozala kati na yo na ntango ya kokoma yango;

5 Mpo ekopesama epayi na yo na Molimo Mosantu koyeba bolingi na ngai mpo na oyo etali bakonzi mpe bakambi bana, kutu nini ekokweyela bango na ntango ekoya nsima.

6 Mpo, tala, nazali penepene ya kobenga bango basala keba na pole mpe nkembo ya Siona, mpo ntango oyo etiamaki mpo na kosunga ye ekomi.

7 Boye, bianga bango, na yoko bosakoli ya makasi, mpe na litatoli na yo, kobanga bango te, mpo bazali lokola matiti, mpe nkembo nyonso ya bango lokola fololo na yango oyo noki ekokweya, ete bakoka kotikala lisusu na mokalo te—

8 Mpe ete nakoka kokende kotala bango na mokolo ya botali, ntango nakolongola elamba oyo ezipi elongi na ngai, mpo na kopesa likabo ya banyokoli na kati ya bakibisi, epayi wapi ezali boliani ya mino, soki babwaki basali na ngai mpe litatoli na ngai oyo nabimisaki epayi na bango.

9 Mpe lisusu, nakokende kotala mpe kolembisa mitema na bango, mingi na kati na bango mpo na bolamu na bino, ete bokoka kozwa ngolu na miso na bango, ete bakoka koya na pole ya bosolo, mpe ete Bayuda-te bakoka koya na bonetolami to botombwami ya Siona.

10 Mpona mokolo na ngai ya kobimela bato ezali koya na lombangu, na ngonga oyo bokokanisa te; mpe epayi wapi ekozala bokengi ya bato na ngai, mpe ekimelo mpo na baoyo wana bakotikala na kati na bango?

11 Bolamuka, O bakonzi ya mabele! Boya, O, boya, na wolo na bino mpe palata na bino, na lisalisi ya bato na ngai, na ndako ya bana basi ya Siona.

12 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na yo, tika ete mosali na ngai Robert B. Thompson asalisa yo kokoma bosakoli oyo, mpo nasepeli na ye malamu, mpe ete asengeli kozala elongo na yo;

13 Boye, tika ete ye, ayoka toli na yo, mpe nakopambola ye na mapamboli ya mingi; tika ye azala sembo mpe solo na makambo nyonso uta sikawa mpe libela, mpe akozala monene na miso na ngai;

14 Kasi tika ete amikundola ete nakosenga bokapita na ye na maboko na ye.

15 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na yo, mosali na ngai Hyrum Smith apambolami; mpo ngai, Nkolo, nalingi ye mpo na bokolongonu ya motema na ye, mpe mpo ete alingi oyo ezali sembo liboso na ngai, elobi Nkolo.

16 Lisusu, tika mosali na ngai John C. Bennett asalisa yo kati na mosala na yo ya kotindaka liloba na ngai na bakonzi mpe bato ya mabele, mpe atikala penepene na yo, kutu yo mosali na ngai Joseph Smith, na ngonga ya motungisi; mpe lifuta na ye ekoleka mpamba te soki andimi toli.

17 Mpe mpo na bolingo na ye akozala moto monene, mpo akozala na ngai soki asali eye, elobi Nkolo. Namoni mosala asalaki, oyo nandimi soki akokoba, mpe nakolatisa ye motole ya mapamboli mpe nkembo monene.

18 Mpe lisusu, nalobi epayi na yo ete ezali bolingi na ngai ete mosali na ngai Lyman Wight asengeli kokoba koteya mpo na Siona, na molimo ya bosokemi, kotatola ngai liboso ya mokili; mpe nakotombola ye likolo lokola na mapapu ya mpongo; mpe akobimisa nkembo mpe lokumu na ye mpo na ye moko mpe mpo na nkombo na ngai.

19 Ete ntango akosilisa mosala na ye nakoka koyamba ye mpo na ngai moko, kutu lokola nasalaki mosali na ngai David Patten, oyo azali elongo na ngai na ntango oyo, mpe lisusu mosali na ngai Edward Partridge, mpe lisusu mosali na ngai ya mokolo Joseph Smith Tata, oyo afandi na Abalayama na loboko na ye ya mobali, mpe apambolami mpe azali mosantu, mpo azali na ngai.

20 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na yo ete, mosali na ngai George Miller azali na mayele mabe te; bakoki kotiela ye motema mpo na bokolongonu ya motema na ye; mpe mpo na bolingo oyo azali na yango mpo na litatoli ya ngai, Nkolo, nalingi ye.

21 Boye nalobi epayi na yo, nakangi likolo ya moto na ye mosala ya bopisikopo, lokola epayi ya mosali na ngai Edward Partridge, ete akoka kozwa bobulisi ya ndako na ngai, ete akoka kopesa mapamboli likolo ya mitu ya babola uta na kati ya bato na ngai, elobi Nkolo. Tika ete moto moko te atiola mosali na ngai George, mpo akokumisa ngai.

22 Tika ete mosali na ngai George, mpe mosali na ngai Lyman, mpe mosali na ngai John Snider, mpe basusu, batonga ndako moko mpo na nkombo na ngai, lokola oyo moko mosali na ngai Joseph akolakisa epayi na bango, na esika oyo wapi akolakisa epayi na bango lisusu.

23 Mpe ekozala ndako mpo na mbola, ndako moko wapi bapaya uta epayi na mosika bakoki kofanda na kati; boye tika ete ezala ndako moko kitoko, oyo elongobani na bondimami nyonso, ete moto ya mobembo oyo alembi akoka kozwa bokolongonu ya nzoto mpe bokengi wana ekotala ye liloba ya Nkolo; mpe libanga ya nsuka oyo natiaki mpo na Siona.

24 Ndako oyo ekozala efandelo ya bokolongonu soki etongami mpo na nkombo na ngai, mpe soki mokambi ya etuka oyo akobiangama na yango asengeli te kopesa nzela ete boko bosoto ekota kati na yango. Esengeli ezala esantu, soki te Nkolo Nzambe na yo akofanda na kati te.

25 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na yo, tika ete basantu na ngai nyonso baya uta na mosika.

26 Mpe tinda bantoma ya mbangu, iyo, bantoma oyo baponami, mpe loba epayi na bango ete: Boya, na wolo na bino nyonso, mpe palata na bino, mpe mabanga na bino ya ntalo, mpe biloko na bino ya kala ya motuya nyonso; mpe elongo na nyonso oyo bazali na boyebi ya biloko ya kala ya motuya, oyo bakoya, bakoki koya, mpe bomema nzete ya beloso, mpe nzete ya tisala, mpe nzete ya tasulu, esika moko na banzete nyonso ya motuya ya mabele;

27 Mpe elongo na ebende, na motako, mpe na mbengi, mpe na zinki, mpe na biloko na bino ya motuya nyonso ya mabele; mpe botonga ndako moko mpo na nkombo na ngai, mpo ete oyo Aleki Likolo afanda na kati.

28 Mpo ezali na esika ezwami na mabele te wapi akoki koya mpe kozongisa lisusu oyo ebungaki mpo na bino, to oyo alongolaki, kutu litondi ya bonganganzambe.

29 Mpo ezali na liziba ya libatisi na mabele te, mpo ete bango, basantu na ngai, bakoka kobatisama mpo na baoyo wana bakufa—

30 Mpo bokuli oyo ezali mpo na ndako na ngai, mpe ekoki kondimama epayi na ngai te, bobele na mikolo ya bobola na bino, na ntango oyo wapi bokokoka kotongela ngai ndako te.

31 Kasi natindi bino, bino nyonso basantu na ngai, kotonga ndako mpo na ngai; mpe napesi bino ntango ekoki malamu mpo na kotongela ngai ndako; mpe na ntango oyo nde ebatisi na bino makondimama epayi na ngai.

32 Kasi tala, na nsuka ya ntango oyo epesami, ebatisi na bino mpo na bakufi na bino makondimama epayi na ngai te; mpe soki bosali makambo oyo na nsuka ya ntango oyo epesami te bokobwakisama lokola eklezia, elongo na bakufi na bino, elobi Nkolo Nzambe na bino.

33 Mpo solo nalobi epayi na bino, ete ekosila bino kozwa ntango ekoki mpo na kotongela ngai ndako, kati na oyo wapi bokuli ya libatisi mpo na bakufi ezali kosalema, mpe mpo na oyo libatisi se moko oyo etiamaki uta liboso ya bokeli ya mokili, ebatisi na bino mpo na bakufi na bino makoki kondimama epayi na ngai te;

34 Mpo na kati kuna bafungola ya bonganganzambe bosantu oyo makulisami, ete bokoka kozwa lokumu mpe nkembo.

35 Mpe nsima ya ntango oyo, ebatisi na bino mpo na bakufi, oyo masalemi na baoyo wana bapalangani bipayi na bipayi, makondimama epayi na ngai te, elobi Nkolo.

36 Mpo etindami ete kati na Siona, mpe kati na makonzi na ye, mpe kati na Yelusaleme, bisika bina oyo naponaki mpo na ekimelo, bikozala nde bisika mpo na ebatisi na bino mpo na bakufi na bino.

37 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, lolenge boni ekoki bosukoli na bino kondimama epayi na ngai, longola se soki bosali yango kati na ndako oyo botongaki mpo na nkombo na ngai?

38 Boye, mpo na ntina oyo natindaki Mose ete atonga tabelenakele moko, ete basengelaki komema yango elongo na bango na esobe, mpe kotonga ndako moko na mboka ya elaka, ete makuli oyo ebombamaki liboso ete mokili ezala makoka kobimisama.

39 Boye, solo nalobi epayi na bino, ete epakolami na bino, mpe bosukolami na bino, mpe ebatisi na bino na esika ya bakufi, mpe mayangani na bino ya lipombo, mpe bikaniseli na bino mpo na mbeka na bino na lisalisi ya bana mibali ya Lewi, mpe mpo na maloba kitoko ya molimo na bino kati na bisika bisantu koleka nyonso ya bino epayi wapi bozwaka masolo, mpe meko mpe masambisi na bino, na ntina ya botondoli ya bimoniseli mpe ebandeli ya Siona, mpe mpo na nkembo, lokumu, mpe dotasio ya bafandi na ye nyonso, ekulisami na bokuli ya ndako na ngai esantu, oyo bato na ngai batindami ntango nyonso kotonga mpo na nkombo na ngai esantu.

40 Mpe solo nalobi epayi na bino, tika ete ndako oyo etongama mpo na nkombo na ngai, ete nakoka kobimisa makuli na ngai kati na yango mpo na bato na ngai;

41 Mpo namoni malamu kobimisa epayi ya eklezia na ngai makambo nasimbaki ya kobombama uta liboso ya ebandeli ya mokili, makambo oyo etali eleko ya litondi ya ntango.

42 Mpe nakolakisa epayi ya mosali na ngai Joseph makambo nyonso etali ndako oyo, mpe bonganganzambe na yango, mpe esika wapi esengeli kotongama.

43 Mpe bosengeli kotonga yango na esika oyo bokanaki kotonga yango, mpo oyo wana ezali ntaka ya mabele oyo naponaki mpo na bino kotonga yango.

44 Soki bosali na bokasi na bino nyonso, nakobulisa ntaka ya mabele wana ete masantisama.

45 Mpe soki bato na ngai bakoyoka mongongo na ngai, mpe mongongo ya basali na ngai oyo nasili kopona mpo na kokamba bato na ngai, tala, solo nalobi epayi na bino, bakolongolama te uta na esika na bango.

46 Kasi soki bakoyoka mongongo na ngai te, to mongongo ya bato oyo natindaki te, bakopambolama te, mpamba te bazali kotia mabele masantu ya ngai bosoto, bosoto mpe na makuli na ngai masantu, mpe mibeko mikonzi, mpe maloba na ngai masantu oyo napesi epayi na bango.

47 Mpe ekosalema ete soki botongi ndako mpo na nkombo na ngai, mpe bosali makambo oyo nalobi te, nakokokisa ndai oyo nasali epayi na bino te, nakokokisa bilaka oyo bozali kozela uta na ngai mpe te, elobi Nkolo.

48 Mpo na esika ya mapamboli, bino, na misala na bino moko, bomemi bolakeli mabe, nkele, bosiliki, mpe masambisi likolo ya mitu na bino moko, na ntina ya maboma na bino, mpe na ntina ya bonsomo na bino nyonso, oyo bozali kosala liboso na ngai, elobi Nkolo.

49 Solo, solo, nalobi epayi na bino, ete ntango napesi motindo moko epayi ya moto nyonso ya bana ya bato kosala mosala mpo na nkombo na ngai, mpe bana ya bato bakei na bokasi na bango nyonso mpe na nyonso oyo basengeli kosala mosala wana, mpe batikaki etingia na bango te, mpe banguna na bango bakweyeli bango mpe bapekisi bango kosala mosala wana, tala, ebongi malamu mpo na ngai ete nasenga lisusu te mosala wana na maboko ya bana wana ya bato, longola se kondima mabonza na bango.

50 Mpe mabe mpe bobuki ya mibeko mpe mitindo esantu na ngai nakoya kotia etumbu na yango namitu ya baoyo wana bazali kopekisa mosala na ngai, kino nkola ya misato mpe ya minei, mpo na bolayi ya ntango oyo bakoyambola te, mpe bolayi ya ntango bakoyina ngai, elobi Nkolo Nzambe.

51 Boye, mpo na ntina oyo nde endimaki ngai mabonza ya baoyo wana natindaki kotonga engumba mpe ndako mpo na nkombo na ngai, na etuka ya Jackson, Missouri, mpe bapekisamaki na banguna na bango, elobi Nkolo Nzambe na bino.

52 Mpe nakozongisa eyano ya bosambisi, nkele, mpe bosiliki, kolela, biyelela, mpe koliana mino likolo ya mitu na bango, kino nkola ya misato mpe ya minei, mpo na bolayi ya ntango oyo bakoyambola te, mpe bolayi ya ntango bakoyina ngai, elobi Nkolo Nzambe na bino.

53 Mpe oyo napesi ndakisa epayi na bino, mpo na bobondisi na bino mpo na oyo etali baoyo wana batindami kosala mosala mpe bapekisamaki na maboko ya banguna na bango, mpe na kosalelaka monyokoli, elobi Nkolo Nzambe na bino.

54 Mpo nazali Nkolo Nzambe na bino, mpe nakobikisa bandeko na bino bandimi nyonso oyo bazalaki peto na motema, mpe babomamaki na mboka ya Missouri, elobi Nkolo.

55 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, natindi bino lisusu kotonga ndako moko mpo na nkombo na ngai, kutu na esika oyo, ete bokoka kolakisa bino moko epayi na ngai ete bozali sembo na makambo nyonso oyo natindi bino, ete nakoka kopambola bino, mpe kolatisa bino motole ya lokumu, bozangi kufa, mpe bomoi ya seko.

56 Mpe sikawa nalobi epayi na bino, mpo na oyo etali ndako na ngai yandaki oyo natindaki bino kotonga mpo nandaki ya bapaya, tika ete etongama mpo na nkombo na ngai, mpe tika ete nkombo na ngai etangama likolo na yango, mpe tika ete mosali na ngai Joseph mpe libota na ye bazwa esika ya kofanda kuna na kati, uta nkola na nkola.

57 Mpo natiaki epakolami oyo likolo ya moto na ye, ete lipamboli na ye ekoka lisusu kotiama likolo ya moto ya bana na ye nsima na ye.

58 Mpe lokola nalobaki na Abalayama mpo na oyo etali mabota ya mabele, kutu nalobi bongo mpe epayi ya mosali na ngai Joseph: Na nzela na yo mpe ya nkona na yo mabota nyonso ya mabele makopambolama.

59 Boye, tika ete mosali na ngai Joseph mpe nkona na ye nsima na ye bazala na esika kati na ndako wana, uta nkola na nkola, libela na libela, elobi Nkolo.

60 Mpe tika ete nkombo ya ndako wana ebiangama Ndako ya Nauvoo; mpe tika ezala esika moko ya kofanda mpe ya bosepeli mpo na moto, mpe esika ya bopemi mpo na moto ya mobembo oyo alembi, ete akoka kotala nkembo ya Siona, mpe nkembo ya oyo, nde libanga ya nsuka na yango;

61 Ete akoka kozwa lisusu toli uta na baoyo natiaki lokola milona miyebana, mpe lokola bakengeli likolo ya bifelo na ye.

62 Tala, solo nalobi epayi na bino, tika ete mosali na ngai George Miller, mpe mosali na ngai Lyman Wight, mpe mosali na ngai John Snider, mpe mosali na ngai Peter Haws, babongisa bango moko, mpe bapona moko kati na bango mpo na kozala mokambi likolo ya lisanga likoki na bango mpo na ntina ya kotonga ndako wana.

63 Mpe basengeli kosala mobeko likonzi, na nzela ya oyo wapi bakoki kozwa liniango mpo na kotonga ndako wana.

64 Mpe bakozwa mosolo moke na nse ya dollars ntuku mitano te lokola likabo na liniango kati na ndako wana, mpe bakopesama nzela ya kozwa dollars nkoto zomi na mitano uta na moto moko lokola likabo ya liniango ya kotia na ndako wana.

65 Kasi bakopesama nzela ya kozwa mosolo mingi koleka dollars nkoto zomi na mitano ya liniango uta na moto moko te.

66 Mpe bakopesama nzela ya kozwa mosolo na nse ya dollars ntuku mitano te lokola likabo ya liniango uta na moto moko ya kotia na ndako wana.

67 Mpe bakopesama nzela ya koyamba moto moko te, lokola nkolo liniango kati na ndako oyo, longola se soki moto moko wana akofuta liniango na ye na maboko na bango na ntango azwi liniango;

68 Mpe na bokokani ya mosolo ya liniango oyo afuti na maboko na bango akozwa liniango na ndako wana; kasi soki afuti eloko moko te na maboko na bango akozwa liniango na ndako wana te.

69 Mpe soki moto moko afuti liniango na maboko na bango ekozala lokola likabo na ndako wana, mpo na ye moko, mpe mpo na nkola na ye nsima na ye, uta nkola na nkola, mpo na molai ya ntango ye mpe basangoli na ye bakozala na liniango wana, mpe bateki te soki mpe balongoli te liniango yango te uta na maboko na bango kati na bonsomi ya bolingi mpe oyo basali bango moko, soki bokosala bolingi na ngai, elobi Nkolo Nzambe na bino.

70 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, soki mosali na ngai George Miller, mpe mosali na ngai Lyman Wight, mpe mosali na ngai John Snider, mpe mosali na ngai Peter Haws, bazwi liniango moko na maboko na bango, na misolo, to na bozwi na nzela ya oyo wapi bazwi motuya ya solo mpenza ya misolo, bakoki te kozwa eteni yoko ya liniango wana mpo na ntina mosusu, longola se mpo na ndako wana.

71 Mpe soki batindi eteni ya liniango wana mpo na ntina mosusu, longola se mpo na ndako wana, na kozangaka bondimami ya nkolo liniango, mpe bazongisi te na kofutaka mbala minei liniango oyo batindaki na ntina mosusu, longola se mpo na ndako wana, basengeli kolakelama mabe, mpe bakolongolama uta na esika na bango, elobi Nkolo Nzambe; mpo ngai, Nkolo, nazali Nzambe, mpe nakoki kotiolama na makambo oyo te.

72 Solo nalobi epayi na bino, tika ete mosali na ngai Joseph afuta liniango oyo na maboko na bango mpo na botongi ya ndako wana, lokola ebongeli ye malamu; kasi mosali na ngai Joseph akoki te kofuta liniango ya dollars koleka nkoto zomi na mitano na ndako wana, na nse ya dollars ntuku mitano mpe te; soki mpe moto moko mosusu akoki mpe te, elobi Nkolo.

73 Mpe ezali na basusu oyo batombeli koyeba bolingi na ngai mpo na oyo etali bango, mpo basengaki yango uta na ngai.

74 Boye, nalobi epayi na bino mpo na oyo etali mosali na ngai Vinson Knight, soki akosala bolingi na ngai tika ete atia mpo na ye moko liniango kati na ndako wana, mpe mpo na nkola na ye nsima na ye, uta nkola na nkola.

75 Mpe tika ete atombola mongongo na ye mpo na ntango molai mpe makasi, na katikati ya bato, mpo na kosamba na ntina ya babola mpe bakeleli; mpe tika ete azanga te kokokisa oyo asengami, tika ete motema na ye molemba mpe te; mpe nakondima mabonza na ye, mpo ekozala epayi na ngai lokola mabonza ya Kaina te, mpo akozala na ngai, elobi Nkolo.

76 Tika ete libota na ye basepela mpe babalusa mitema na bango uta na motungisi; mpo naponaki ye mpe napakolaki ye, mpe akopesama lokumu na katikati ya ndako na ye, mpo nakolimbisa masumu na ye nyonso, elobi Nkolo. Amene.

77 Solo nalobi epayi na bino, tika mosali na ngai Hyrum atia liniango kati na ndako wana lokola ebongeli ye malamu, mpo na ye moko mpe mpo na nkola na ye nsima na ye, uta nkola na nkola.

78 Tika ete mosali na ngai Isaac Galland atia liniango kati na ndako wana; mpo ngai, Nkolo, nalingi ye mpo na mosala asalaki, mpe nakolimbisa masumu na ye nyonso; boye, tika ete akundolama mpo na matabisi oyo azali na yango kati na ndako wana uta nkola na nkola.

79 Tika ete mosali na ngai Isaac Galland aponama na kati na bino, mpe akulisama na mosali na ngai William Marks, mpe apambolama na ye, mpo na kokende elongo na mosali na ngai Hyrum mpo na kokokisa mosala oyo mosali na ngai Joseph akolakisa epayi na bango, mpe bakopambolama makasi.

80 Tika ete mosali na ngai William Marks afuta liniango kati na ndako wana, lokola ebongeli ye malamu, mpo na ye moko mpe mpo na nkola na ye, uta nkola na nkola.

81 Tika ete mosali na ngai Henry G. Sherwood afuta liniango kati na ndako wana, lokola ebongeli ye malamu, mpo na ye moko mpe mpo na nkona na ye nsima na ye, uta nkola na nkola.

82 Tika ete mosali na ngai William Law afuta likabo ya mosolo na ndako wana, mpo na ye moko mpe mpo na nkona na ye nsima na ye, nkola na nkola.

83 Soki akosala bolingi na ngai tika ete akamata libota na ye mpo na koya na mboka ya esti te, kutu na Kirtland; nzokande, ngai, Nkolo, nakotonga Kirtland, kasi ngai, Nkolo nazali na fimbo oyo nasili kolengela mpo na bafandi na yango.

84 Mpe mpo na oyo etali mosali na ngai Almon Babbitt, ezali na makambo mingi oyo nazali kosepela na yango te; tala, azali na mposa makasi ya kotia na ye toli na esika ya toli oyo napesaki, kutu na esika ya oyo ya Bokambi ya Eklezia na ngai; mpe atii mwana ngombe ya wolo mpo na losambo ya bato na ngai.

85 Botika moto moko te akende uta na esika oyo oyo ayaki awa kosalaka makasi mpo na kobomba mitindo.

86 Soki bazali na bomoi awa tika bazala mpo na ngai; mpe soki bakufi tika bakufa mpo na ngai; mpo bakopema uta na misala na bango nyonso awa, mpe bakokoba misala na bango.

87 Boye, tika mosali na ngai William atiela ngai motema, mpe atika kobanga mpo na libota na ye, mpo na bokono ya mboka oyo. Soki bolingi ngai, bobomba mitindo na ngai; mpe bokono ya mboka yango ekobongwana na nkembo na bino.

88 Tika ete mosali na ngai William akende mpe asakola nsango malamu na ngai ya libela na mongongo moko makasi, mpe na bosepeli monene, lokola akotindama kosala na Molimo na ngai, epayi ya bafandi ya Warsaw, mpe lisusu epayi ya bafandi ya Carthage, mpe lisusu epayi ya bafandi ya Burlington, mpe lisusu epayi ya bafandi ya Madison, mpe azela na bompikiliki mpe na molende malako mosusu na likita monene ya ngai, elobi Nkolo.

89 Soki akosala bolingi na ngai tika ete ayoka uta sikawa kokende liboso toli ya mosali na ngai Joseph, mpe na nzela ya makoki na ye asunga ntina ya babola, mpe abimisa buku ya bobongoli ya sika ya liloba na ngai esantu epayi ya bafandi ya mabele.

90 Mpe soki akosala oyo nakopambola ye na mapamboli ya mingi, ete Nkolo akotika ye te, soki mpe bakomona nkona na ye kolombaka lipa te.

91 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, tika ete mosali na ngai William abiangama, akulisama, mpe apakolama, lokola mopesi toli mpo na mosali na ngai Joseph, na esika ya mosali na ngai Hyrum, ete mosali na ngai Hyrum akoka kokamata mosala ya Bonganganzambe mpe ya Nkoko, oyo epesamaki epayi na ye na tata na ye, engebene na lipamboli mpe lisusu engebene na makoki;

92 Ete uta sikawa kokende liboso akozala na bafungola ya mapamboli ya bankoko likolo ya mitu ya bato na ngai nyonso,

93 Ete moto nyonso oyo ye akopambola akopambolama, mpe moto nyonso oyo ye akolakela mabe akolakelama mabe; ete nyonso oyo akokanga na mabele ekokangama na lola; mpe nyonso oyo akofungola na mabele ekofungolama na lola.

94 Mpe uta na ntango oyo kokende liboso naponi ye ete akoka kozala profeta, mpe momoni, mpe mobimisi mpo na eklezia na ngai, mosali na ngai Joseph mpe lokola;

95 Ete akoka lisusu kosala na bomoko elongo na mosali na ngai Joseph; mpe ete azwa toli uta na mosali na ngai Joseph, oyo akolakisa epayi na ye bafungola na nzela ya oyo wapi akoki kosenga mpe kozwa, mpe kolatisama motole na lipamboli se moko wana, mpe nkembo, mpe lokumu, mpe bonganganzambe, mpe makabo ya bonganganzambe, oyo etiamaki kala likolo na ye oyo azalaki mosali na ngai Oliver Cowdery;

96 Ete mosali na ngai Hyrum akoka kopesa litatoli ya makambo oyo nakolakisa epayi na ye, ete nkombo na ye ekoka kokundolama na bokundoli moko ya lokumu uta nkola na nkola, libela na libela.

97 Tika ete mosali na ngai William Law lisusu azwa bafungola na nzela ya oyo wapi akoki kosenga mpe kozwa mapamboli; tika ye azala na bomikitisi liboso na ngai, mpe azala na mayele mabe te, mpe akozwa Molimo na ngai, kutu Molendisi, oyo akomonisa epayi na ye bosolo ya makambo nyonso, mpe akopesa ye, se na ngonga yango mpenza, nini akoloba.

98 Mpe bilembo oyo ekolanda ye—akobikisa bakoni, akobengana bazabulu, mpe akobikisama uta na baye wana bakopesa ye ngenge ya kufa;

99 Mpe akokambama na banzela oyo wapi nioka ya ngenge ekoki koswa litindi na ye te, mpe akotombola mabanzo ya makanisi na ye likolo lokola na mapapu ya mpongo.

100 Mpe nini soki nalingi ete asengeli kolamusa bakufi, tika ete akanga mongongo na ye soki moke te.

101 Boye, tika ete mosali na ngai William abelela makasi mpe atika te, na bosepeli mpe esengo, mpe na hozana epayi na ye oyo afandi likolo ya kiti ya bokonzi libela na libela, elobi Nkolo Nzambe na bino.

102 Tala, nalobi epayi na bino, nazali na mosala oyo motiami mpembeni mpo na mosali na ngai William, mpe mosali na ngai Hyrum, mpe bobele mpo na bango moko; mpe tika mosali na ngai Joseph atikala epayi na ye, mpo ete asengisami. Oyo matikali nakolakisa epayi na bino nsima. Kutu bongo. Amene.

103 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, soki mosali na ngai Sidney akosalela ngai mpe akozala mopesi toli epayi ya mosali na ngai Joseph, tika ete alamuka mpe aya mpe atelema na mosala ya libiangi na ye, mpe amikitisa ye moko liboso na ngai.

104 Mpe soki akopesa epayi na ngai libonza oyo ekoki kondimama, mpe ya bozongisi matondi, mpe atikali elongo na bato na ngai, tala, ngai, Nkolo Nzambe na bino, nakobikisa ye ete abikisama; mpe akotombola mongongo na ye lisusu likolo ya bangomba, mpe akozala molobeli liboso na ngai.

105 Tika ete aya mpe atia libota na ye nzinganzinga na esika wapi mosali na ngai Joseph afandaka.

106 Mpe na mibembo na ye nyonso tika ete atombola mongongo na ye lokola na lokito ya kelelo, mpe akebisa bafandi ya mabele ete bakima nkele oyo ezali koya.

107 Tika ete asalisa mosali na ngai Joseph, mpe lisusu tika ete mosali na ngai William Law asalisa mosali na ngai Joseph, na kosalaka yoko bosakoli ya lipombo epayi ya bakonzi ya mabele, kutu lokola nalobelaki bino yango liboso.

108 Soki mosali na ngai Sidney akosala bolingi na ngai, tika ete alongola libota na ye na bamboka ya esti te, kasi tika ete abongola esika na bango ya kofanda, kutu lokola nalobaki.

109 Tala, ezali bolingi na ngai te ete aluka kozwa bokengi mpe ekimelo uta na engumba napesaki epayi na bino, kutu engumba ya Nauvoo.

110 Solo nalobi epayi na bino, kutu sikawa, soki akotia bokebi na mongongo na ngai, ekozala malamu mpo na ye. Kutu bongo. Amene.

111 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, tika ete mosali na ngai Amos Davies afuta liniango na maboko ya baye wana nasili kopona mpo na kotonga ndako mpo na mbola, kutu Ndako ya Nauvoo.

112 Eye botika ye asala yango soki akolinga kozwa matabisi likolo; mpe tika ete ayoka toli ya mosali na ngai Joseph, mpe asala na maboko na ye moko ete bato bakoka kotiela ye motema.

113 Mpe ntango akolakisa ye moko ete azali mpenza moto ya sembo na makambo nyonso oyo akopesama mokumba ete atala yango, iyo, kutu makambo moke, akotiama mokonzi likolo ya mingi;

114 Boye tika amikitisa ye moko ete akoka konetolama. Kutu bongo. Amene.

115 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, soki mosali na ngai Robert D. Foster akotosa mongongo na ngai, tika ete atonga ndako mpo na mosali na ngai Joseph, engebene na mokanda ya boyokani oyo asalaki elongo na ye, lokola ekuke ekofungolama mpo na ye mbala na mbala.

116 Mpe tika ete ayambola uta na liboma na ye, mpe amilatisa na bolingani; mpe atika kosala mabe, mpe atika maloba na ye ya makasi;

117 Mpe afuta lisusu liniango na maboko ya lisanga likoki ya Ndako ya Nauvoo, mpo na ye moko mpe mpo na nkola na ye nsima na ye, uta nkola na nkola;

118 Mpe atia bokebi na toli ya mosali na ngai Joseph, mpe Hyrum, mpe William Law, mpe bakambi nyonso oyo nabiangaki mpo na kotia moboko ya Siona; mpe ekozala malamu mpo na ye libela na libela. Kutu bongo. Amene.

119 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, tika ete moto moko te afuta liniango na lisanga likoki ya Ndako ya Nauvoo longola se soki akozala mondimi ya Buku ya Mormon, mpe bimoniseli napesaki epayi na bino, elobi Nkolo Nzambe na bino;

120 Mpo oyo wana ezali mingi koleka soki mpe moke koleka oyo, ewuti na mabe, mpe ekolandama na bolakeli mabe kasi mapamboli te, elobi Nkolo Nzambe na bino. Kutu bongo. Amene.

121 Mpe lisusu, solo nalobi epayi na bino, tika ete lisanga likoki ya Ndako ya Nauvoo ezwa mbano ya lifuta elongobani na misala na bango oyo bazali kosala na kotongaka Ndako ya Nauvoo; mpe tika lifuta na bango ezala lokola bakoyokana na kati na bango moko, lokola etali ntalo na yango.

122 Mpe tika moto na moto oyo afuti liniango amema eteni na ye ya lifuta na bango, soki esengeli kozala, mpo na lisungi na bango, elobi Nkolo; soki bongo te, misala na bango mikotangama lokola liniango mpo na bango kati na ndako wana. Kutu bongo. Amene.

123 Solo nalobi epayi na bino, nayebisi bino sikawa bakambi oyo bazali ya Bonganganzambe na ngai, ete bokoka kozala na bafungola na yango, kutu Bonganganzambe oyo ezali nsima ya molongo ya Melikisedeki, oyo azali na molongo ya Mwana Mobotami se Moko na ngai.

124 Yambo, napesi bino Hyrum Smith ete azala nkoko mpo na bino, kozala na mapamboli ya bokangi ya eklezia na ngai, kutu Molimo Mosantu ya elaka, na nzela ya oyo wapi bokangemi mpo na mokolo ya bosikoli, ete bokoka kokweya te ezala ata soki na ngonga nini lisenginia ekoki koyela bino.

125 Napesi bino mosali na ngai Joseph ete azala mpaka moyangeli likolo ya eklezia na ngai nyonso, kozala mobongoli, mobimisi, momoni, mpe profeta.

126 Napesi bino mosali na ngai Sidney Rigdon mpe mosali na ngai William Law lokola bapesi toli, ete baoyo bakoka kozala bato ya lisanga likoki mpe Bokambi ya Yambo, mpo na kozwa maloba kitoko ya molimo mpo na eklezia mobimba.

127 Napesi bino mosali na ngai Brigham Young ete azala mokambi likolo ya lisanga ya mobembo ya Bazomi na mibale;

128 Bazomi na mibale baye wapi bazali na bafungola mpo na kofungola likoki ya bokonzi na ngai na nsuka minei ya mabele, mpe nsima wana mpo na kotinda liloba na ngai epayi ya ekelamo moko moko.

129 Bazali Heber C. Kimball, Parley P. Pratt, Orson Pratt, Orson Hyde, William Smith, John Taylor, John E. Page, Wilford Woodruff, Willard Richards, George A. Smith;

130 David Patten nakamati ye mpo na ngai moko; tala, moto moko te akoki kolongola bonganganzambe na ye uta na ye; kasi, solo nalobi epayi na bino, moto mosusu akoki koponama na libiangi se moko wana.

131 Mpe lisusu, nalobi epayi na bino, napesi bino lisanga monene, lokola libanga ya nsuka ya Siona—

132 Na kotangaka nkombo, Samuel Bent, Henry G. Sherwood, George W. Harris, Charles C. Rich, Thomas Grover, Newel Knight, David Dort, Dunbar Wilson—Seymour Brunson nakamati ye mpo na ngai moko, moto moko akokamata bonganganzambe na ye te, kasi moto mosusu akoki koponama na bonganganzambe se moko boma na esika na ye; mpe solo nalobi epayi na bino, tika ete mosali na ngai Alona Johnson akulisama na libiangi oyo na esika na ye—David Fullmer, Alpheus Cutler, William Huntington.

133 Mpe lisusu, napesi epayi na bino Don C. Smith ete azala mokambi likolo ya lisanga likoki ya banganganzambe minene;

134 Boye bokuli etiami mpo na ntina ya kopesa makoki ya kosala na baye wana bakoponama bayangeli ya ntango nyonso soki te basali likolo ya makonzi makeseni oyo mapalangani bipayi na bipayi;

135 Mpe bakoki kokende mobembo soki baponi, kasi nde bakulisami lokola bakambi ya ntango nyonso; oyo ezali mosala ya libiangi na bango, elobi Nkolo Nzambe na bino.

136 Napesi epayi na ye Amasa Lyman mpe Noah Packard lokola bapesi toli, ete bakoka koyangela likolo ya lisanga likoki ya banganganzambe minene ya eklezia na ngai, elobi Nkolo.

137 Mpe lisusu, nalobi epayi na bino, napesi epayi na bino John A. Hicks, Samuel Williams, mpe Jesse Baker, baoyo kani bonganganzambe ezali mpo na koyangela likolo ya lisanga likoki ya bampaka, lisanga likoki oyo wapi etiami mpo na basali na ntango nyonso; nzokande bakoki kokende mobembo, ata kutu bakulisami kozala basali na ntango nyonso mpo na eklezia na ngai, elobi Nkolo.

138 Mpe lisusu, napesi epayi na bino Joseph Young, Josiah Butterfield, Daniel Miles, Henry Herriman, Zera Pulsipher, Levi Hancock, James Foster, ete bayangela likolo ya lisanga likoki ya bantuku sambo;

139 Lisanga likoki oyo wapi etiami mpo ete bampaka baoyo bakendeka mobembo bapesa litatoli ya nkombo na ngai na mokili mobimba, epayi nyonso wapi lisanga monene ya mobembo, bapostolo na ngai, bakotinda bango mpo na kolengela nzela liboso na ngai.

140 Bokeseni kati na lisanga likoki oyo mpe lisanga likoki ya bampaka ezali ete moko esengeli kokende mobembo ntango nyonso, mpe lisanga mosusu esengeli koyangela likolo ya mangomba ya eklezia mbala na mbala; moko ezali na mokumba ya koyangela mbala na mbala, mpe lisusu ezali na mokumba ya koyangelaka te, elobi Nkolo Nzambe na bino.

141 Mpe lisusu, nalobi epayi na bino, napesi bino Vinson Knight, Samuel H. Smith, mpe Shadrach Roundy, soki akolinga kondima yango, mpo na koyangela likolo ya bopisikopo; boyebi ya oyo bobengi bopisikopo epesami epayi na bino na buku ya Malongi mpe Mayokani.

142 Mpe lisusu, nalobi epayi na bino, Samuel Rolfe mpe bapesi toli na ye lokola banganganzambe, mpe mokambi ya bateyi mpe bapesi toli na ye, mpe lisusu mokambi ya badiakona mpe bapesi toli na ye, mpe lisusu mokambi ya likonzi mpe bapesi toli na ye.

143 Misala oyo etangami awa likolo napesi epayi na bino, mpe bafungola na yango, ezali mpo na kosalisa mpe bokambi ya eklezia, mpo na kosala mpe mpo na kobongisa basantu na ngai nie.

144 Mpe napesi epayi na bino motindo moko, ete bosengeli kokokisa misala oyo nyonso mpe kondima nyonso oyo natangi nkombo, soki te boboya kondima bango na ntango ya lisanga monene ya ngai;

145 Mpe ete bosengeli kolengela bisika mpo na misala oyo nyonso na ndako na ngai ntango bokotonga yango mpo na nkombo na ngai, elobi Nkolo Nzambe na bino. Amene.

Bimisa na lokasa