Makomi
Malongi mpe Mayokani 45


Eteni 45

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith epayi ya eklezia, na Kirtland, Ohio, na mokolo ya 7, sanza ya misato ya mobu 1831. Lokola liloba ya boyingisi mpo na lisolo ya makomi na ye ya emoniseli oyo, mambi ya kala ya Joseph Smith masakoli ete “na eleko oyo ya Eklezia … mbando mingi ya lokuta … mpe masapo ya liboma, ebimisamaki na mikanda … mpe matambwisamaki, … mpo na kopekisa bato koluka koyeba malamu mpenza mosala yango, to koyamba bondimi. … Kasi na bosepeli ya Basantu, … nazwaki oyo malandi.”

1–5, Klisto azali molobeli na biso epayi ya Tata; 6–10, Nsango malamu ezali ntoma mpo na kolengela nzela liboso ya Nkolo; 11–15, Enoka mpe bandeko na ye bayambamaki na Nkolo Ye moko; 16–23, Klisto abimisaki bilembo ya boyei na Ye lokola epesamaki likolo ya Ngomba ya Bilaya; 24–38, Nsango malamu ekozongisama, ntango ya baoyo bazali Bayuda-te ekokokisama, mpe bokono ya bonielengeni bokotondisama na mboka; 39–47, Bilembo, makamwisi, mpe Bosekwi ekoya elongo na Boyei ya Mibale; 48–53, Klisto akotelema likolo ya Ngomba ya Bilaya, mpe Bayuda bakomona mpota na maboko mpe makolo na Ye; 54–59, Nkolo akoyangela Nkoto moko ya mibu; 60–62, Profeta apesami malako ya kobanda bobongoli ya Boyokani ya Sika, na nzela ya oyo nsango ya ntina monene ekoyebisama; 63–75, Basantu batindami kosangana mpe kotonga Yelusaleme ya Sika, epayi wapi bato uta na bikolo nyonso bakoya.

1 Boyoka, O bino bato ya eklezia na ngai, epayi kani bokonzi bopesamaki; boyoka mpe botia litoyi na ye oyo atiaki moboko ya mabele, oyo asalaki lola mpe bibele nyonso na yango, mpe na nani oyo esalemaki biloko nyonso oyo ezali na bomoi, mpe oyo etambolaka, mpe oyo ezali.

2 Mpe nalobi lisusu, boyoka mongongo na ngai, mbele liwa ekweyela bino; na ngonga yoko ekanisi bino te ete elanga ekoleka, mpe bobuki mbuma esilaki, mpe molimo na bino mokobikisama te.

3 Yokela ye oyo azali molobeli epayi ya Tata, oyo azali kosamba na ntina na bino liboso na ye—

4 Kolobaka: Tata, tala bolozi mpe liwa na ye oyo asalaki lisumu te, na oyo nani osepelaki malamu; tala makila ya Mwana na yo oyo esopanaki, makila na ye oyo opesaki ete yo moko okoka kokembelama;

5 Yango wana, Tata, bikisa bandeko na ngai baoyo bandimi na nkombo na ngai, ete bakoka koya epayi na ngai mpe kozwa bomoi ya libela.

6 Boyoka, O bino bato ya eklezia na ngai, mpe bino bampaka boyoka elongo, mpe boyoka mongongo na ngai wana ezali ntango kobiangama lelo, mpe boyeisa mitema na bino makasi te;

7 Mpo solo nalobi epayi na bino ete nazali Alifa mpe Omega, ebandeli mpe nsuka, pole mpe bomoi ya mokili—pole oyo ezali kongenga kati na molili mpe molili esosoli yango te.

8 Nayaki epayi ya baoyo ya ngai moko, mpe baoyo ya ngai moko bayambaki ngai te; kasi epayi ya mingi lokola baoyo bayambaki ngai napesi nguya ya kosala makamwisi mingi, mpe ya kokoma bana ya Nzambe; mpe kutu epayi na bango oyo bandimaki na nkombo na ngai napesi nguya ya kozwa bomoi ya seko.

9 Mpe kutu bongo natindaki liyokani na ngai ya libela kati na mokili, kozala pole mpo na mokili, mpe kozala bendele ya bato na ngai, mpe mpo Bayuda-te baluka yango, mpe mpo na kozala ntoma liboso na ngai mpo na kolengela nzela liboso na ngai.

10 Yango wana, boya na liyokani yango, mpe elongo na ye oyo akoya nakoluka ntina ya makambo lokola na bato ya kala, mpe nakolakisa epayi na bino boluki ntina na ngai ya makasi.

11 Yango wana, boyoka elongo mpe tika nalakisa bino kutu bwania na ngai—bwania na ye oyo bolobi azali Nzambe ya Enoka, mpe bandeko na ye,

12 Baoyo bakabwanaki uta na mabele, mpe bayambamaki mpo na ngai moko—engumba moko oyo ebombisami kino ekoya mokolo ya bosembo—mokolo oyo molukamaki na bato nyonso basantu, mpe bazwaki mwango te na ntina ya nkuna mpe bonsomo;

13 Mpe bayebaki kondima ete bazalaki bapaya mpe baleki nzela na mabele;

14 Kasi bazwaki elaka ete basengeli kozwa yango mpe komona yango na mosuni na bango.

15 Yango wana, boyoka mpe nakoluka ntina elongo na bino, mpe nakoloba epayi na bino mpe kosakola, lokola na bato na mikolo ya kala.

16 Mpe nakolakisa yango polele lokola nalakisaki yango epayi ya bayekoli na ngai wana etelemaki ngai liboso na bango na mosuni, mpe nalobelaki bango, kolobaka: Lokola bosengaki ngai mpo na oyo etali bilembo ya boyei na ngai, na mokolo yango ntango nakoya na nkembo na ngai kati na mapata na lola, mpo na kokokisa bilaka oyo nasalaki epayi ya batata na bino,

17 Mpo lokola bomonaki ete kozanga komonana ya ntango molai ya milimo na bino uta na nzoto na bino mpo na ntango molai ezalaki lokola boumbu, nakolakisa epayi na bino lolenge boni mokolo ya bosikoli ekoya, mpe lisusu bozongisi ya Yisalaele oyo epanzamaki.

18 Mpe sikawa botala tempelo oyo ezali na Yelusaleme, oyo bobiangi ndako ya Nzambe, mpe banguna na bino balobi ete ndako oyo ekokweya soki moke te.

19 Kasi, solo nalobi epayi na bino ete libebi ekoya likolo ya nkola oyo lokola moyibi na butu, mpe bato oyo bakobebisama mpe bakopanzama na kati ya bikolo nyonso.

20 Mpe tempelo oyo bozali komona sikawa ekokweisama ete libanga moko ekotikala te likolo ya mosusu.

21 Ekosalema ete nkola oyo ya Bayuda ekoleka te kino libebi oyo nayebisaki bino mpo na ntina na bango ekosalema.

22 Bolobi ete boyebi nsuka ya mokili ekomi; bolobi lisusu ete boyebi lola mpe mabele ekoleka;

23 Mpe na oyo bolobi solo, mpo ezali bongo; kasi makambo oyo nayebisaki bino makoleka te kino nyonso makokokisama.

24 Mpe na oyo nayebisaki bino mpo na oyo etali Yelusaleme; mpe ntango mokolo wana ekoya, montika moko mokopanzama na kati ya bikolo nyonso;

25 Kasi bakosangisama lisusu; kasi bango bakotikala kino ntango ya baoyo bazali Bayuda-te ekokokisama.

26 Mpe na mokolo wana ekoyokana oyo etali bitumba mpe nungunungu ya bitumba, mpe mabele mobimba ekozala na mobulu, mpe mitema ya bato ekozala likolo, mpe bakoloba ete Klisto azelisa boyei na ye kino na nsuka ya mabele.

27 Mpe bolingo ya bato bokokoma malili, mpe mabe makoleka mingi.

28 Mpe wana ekoya ntango ya baoyo bazali Bayuda-te, pole ekobima na kati na bango oyo bafandi kati na molili, mpe ekozala litondi ya nsango malamu na ngai;

29 Kasi bango bayambi yango te; mpo bamoni pole yango te, mpe babalusi mitema na bango uta na ngai na ntina ya misise ya bato.

30 Mpe na nkola oyo wana ntango ya Bayuda-te ekokokisama.

31 Mpe ekozala na bato na nkola wana oyo bakotikala, oyo bakoleka te kino bakomona fimbo ya koleka ndelo; mpo bokono moko ya bonielengeni ekotonda na mboka.

32 Kasi bayekoli na ngai bakotelema na bisika bisantu, mpe bakolongolama te; kasi na kati ya bato ya nkuna, bato bakotombola mingongo na bango mpe bakolakela Nzambe mabe mpe bakokufa.

33 Mpe boningani ya mabele ekozala na bisika ya ndenge na ndenge, mpe libebi mingi; nzokande bato bakoyeisa mitema na bango makasi epayi na ngai, mpe bakotombola mompanga, moko na mosusu, mpe bakobomana moko na mosusu.

34 Mpe sikawa, ntango esilaki ngai Nkolo koloba maloba oyo epayi ya bayekoli na ngai, bango babangaki.

35 Mpe nalobelaki bango: Bobanga te, mpo, ntango makambo oyo nyonso ekosalema, bokoyeba ete bilaka oyo epesamaki epayi na bino ekokokisama.

36 Mpe ntango pole ekobanda kongenga, ekozala mpo na bango lokola na lisese oyo nakolakisa bino—

37 Botala mpe bomona nzete ya mosuke, mpe bomoni yango na miso na bino, mpe bolobi ntango ebandi kobimisa nkasa, mpe nkasa na yango ezali naino elembi, ete elanga esili kobelema sikawa;

38 Kutu ekozala se bongo na mokolo wana ntango bakomona makambo oyo nyonso, na ntango wana nde bakoyeba ete ngonga ebelemi.

39 Mpe ekosalema ete ye oyo akobanga ngai akozela ete mokolo monene ya Nkolo oyo eya, kutu kolukaka bilembo ya boyei ya Mwana ya Moto.

40 Mpe bakomona bilembo mpe makambo ya kokamwa, mpo bikolakisama na lola na likolo, mpe na mabele na nse.

41 Mpe bakomona makila, mpe moto, mpe mbongi ya milinga.

42 Mpe liboso ete mokolo ya Nkolo moya, moi ekokoma molili, mpe sanza ekobongolama na makila, mpe minzoto mikokweya uta na lola.

43 Mpe montika mokosangana na esika oyo;

44 Mpe na ntango wana bakoluka ngai, mpe tala, nakoya; mpe bakomona ngai kati na mapata ya lola, nalatisami na nguya mpe nkembo monene; elongo na banjelu nyonso basantu; mpe ye oyo akokengela te mpo na ngai akokweisama.

45 Kasi liboso ete loboko ya Nkolo ekweya, anjelu moko akobeta kelelo na ye, mpe basantu oyo balalaki bakobima kokutana na ngai na mapata.

46 Yango wana, soki bolalaki na kimia nde bopambolami; mpo lokola bomoni ngai sikawa mpe boyebi ete nazali, lolenge moko ekoya bino epayi na ngai mpe milimo na bino ekozala na bomoi, mpe bosikoli na bino ekozala ya kobongisama nie; mpe basantu bakobima uta na biteni minei ya mabele.

47 Na ntango wana loboko ya Nkolo ekokweya likolo ya bikolo.

48 Mpe nsima Nkolo akotia lokolo na ye likolo ya ngomba oyo, mpe ekopaswana na ndambo mibale, mpe mabele makoningana, mpe makotetema awa mpe esika mosusu, mpe lola lisusu ekoningana.

49 Mpe Nkolo akobimisa mongongo na ye, mpe nsuka nyonso ya mabele ekoyoka yango; mpe bikolo ya mabele bikosala matanga, mpe bango oyo basekaka bakomona liboma na bango.

50 Mpe likambo ya mawa ekozinga oyo asekaka, mpe motioli akozikisama; mpe bango oyo balukaki libaku mpo na kosala mabe bakokatama na nse mpe kobwakama kati na moto.

51 Mpe na ntango wana Bayuda bakotala ngai mpe koloba: Mpota nini oyo ezali na maboko na yo mpe na makolo na yo?

52 Na ntango wana nde bakoyeba ete nazali Nkolo; mpo nakoloba epayi na bango: Mpota oyo ezali mpota nazokisamaki na ndako ya baninga na ngai. Nazali ye oyo batombolaki likolo. Nazali Yesu oyo babakaki na ekulusu. Nazali Mwana ya Nzambe.

53 Mpe na ntango wana nde bakolela na ntina ya mabe na bango; na ntango wana nde bakolela mpo banyokolaki mokonzi na bango.

54 Mpe ntango wana bikolo ya bapaganu bikosikolama, mpe bango oyo bayebaki mobeko te bakozala na likabo na bosekwi ya yambo; mpe ekozala malamu mingi mpo na bango.

55 Mpe Satana akokangisama, ete akoka te kozala na esika na mitema ya bana ya bato.

56 Mpe na mokolo wana, ntango nakoya na nkembo na ngai, nde ekokokisama lisese oyo nalobaki mpo na oyo etali baseka zomi.

57 Mpo bango oyo bazali na bwania mpe bayambaki bosolo, mpe bakamataki Molimo Mosantu lokola mokambi na bango, mpe bakosamaki te—solo nalobi epayi na bino, bakokatama na nse mpe kobwakama kati na moto, kasi bakobikisama na mokolo yango.

58 Mpe mabele makopesama epayi na bango lokola libula ya kosangola; mpe bakokoma mingi mpe bakokoma makasi, mpe bana na bango bakokola na kozangaka masumu mpo na lobiko.

59 Mpo Nkolo akozala na katikati na bango, mpe nkembo na ye ekozala likolo na bango, mpe akozala mokonzi na bango mpe mopesi mibeko na bango.

60 Mpe sikawa, tala, nalobi epayi na yo, ete epesami na yo te ya koyeba mingi lisusu koleka mpo na oyo etali mokapo oyo, kino ekobongolama Boyokani ya Sika, mpe na kati na yango makambo nyonso oyo makoyebana;

61 Yango wana napesi epayi na yo nzela ete okoka kobongola yango, ete omilengela mpo na makambo makoya.

62 Mpo solo nalobi epayi na yo, ete makambo minene ezali kozela bino;

63 Bozali koyoka makelele etali bitumba na bamboka ya bapaya; kasi, tala, nalobi epayi na bino, bibelemi, kutu bikomi na bikuke na bino, mpe mibu mingi te uta sikawa bokoyoka makambo etali bitumba na mboka na bino moko.

64 Yango wana ngai, Nkolo, nalobaki ete, bosangana mosika uta na bamboka ya esti, bosangana bino moko esika moko bino bampaka ya eklezia na ngai; bobima bokende na bikolo ya westi, mpe bobelela bafandi mpo na koyambola, mpe mbala mingi lokola bakoyambola, botonga Baeklezia mpo na ngai.

65 Mpe na motema moko mpe likanisi moko, bosangisa bozwi na bino ete bokoka kosomba libula ya kosangola oyo esengeli awa nsima kopesama epayi na bino.

66 Mpe ekobiangama Yelusaleme ya Sika, mboka ya kimia, engumba ya ekimelo, esika ya bokengi mpo na basantu ya Nzambe oyo Aleki Likolo;

67 Mpe nkembo ya Nkolo ekozala wana, mpe bobangi ya Nkolo mpe ekozala wana, na lolenge ete moto na nkuna akoya epayi na yango te, mpe ekobiangama Siona.

68 Mpe ekosalema na kati ya bato ya nkuna ete moto nyonso oyo akokamata mompanga na ye te mpo na kobundisa moninga na ye ya penepene asengeli mpenza kokima na Siona mpo na bokengi.

69 Mpe bato ya bikolo nyonso na nse ya lola bakosangisama kuna kati na yango; mpe ekozala se bobele bato moko oyo bakozala na bitumba moko na mosusu te.

70 Mpe ekolobama na kati ya bato ya nkuna: Tika tomata te kobundisa Siona, mpo bafandi ya Siona bazali nsomo; yango wana tokoki kotelema te.

71 Mpe ekosalema ete bato ya sembo uta na kati ya bikolo nyonso bakosangana, mpe bakoya na Siona, koyembaka banzembo ya bosepeli ya libela.

72 Mpe sikawa nalobi epayi na bino, bobomba makambo oyo ete ebima te libanda epayi ya mokili kino ekolongobana na ngai, ete bokoki kokokisa mosala oyo na miso ya bato, mpe na miso ya banguna na bino, ete bakoka te koyeba misala na bino kino bokokokisa likambo natindaki bino;

73 Ete ntango bakoyeba yango, ete bakoka kotala makambo oyo.

74 Mpo ntango Nkolo akomonana ekozala nsomo epayi na bango, ete bobangi ekoki kokanga bango, mpe bakotelema mosika mpe bakolenga.

75 Mpe bikolo nyonso bikobanga mpo na nsomo ya Nkolo, mpe mpo na nguya ya bokasi na ye. Kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa