Makomi
Malongi mpe Mayokani 76


Eteni 76

Limoni epesami na Profeta Joseph Smith mpe Sidney Rigdon, na Hiram, Ohio, na mokolo ya 16, sanza ya mibale ya mobu 1832. Lokola maloba ya boyingisi na lisolo ya makomi na ye ya limoni oyo, mambi ya kala ya Joseph Smith masakoli ete: “Nsima kaka ya bozongi na ngai uta na likita ya Amherst, nazongelaki bobongoli ya Makomi. Uta na bimoniseli ya ndenge na ndenge oyo ezwamaki, emonanaki lokola ete biteni mingi ya motuya oyo etali lobiko ya moto bilongolamaki uta na Biblia, soki te bibungaki liboso ete basangisa yango. Emonanaki na yango moko polele uta na bosolo oyo etikalaki, ete soki Nzambe akopesa lifuta epayi ya moto na moto engebene na misala oyo asalaki kati na nzoto liloba ‘Lola,’ lokola etangami na bato ete ezali efandelo ya seko mpo na Basantu, esengeli kozala kati na yango na babokonzi mingi koleka se moko. Na engebene, … wana ezalaki biso kobongola Nsango malamu ya Santu Yoane, ngai moko mpe Mpaka Rigdon tomonaki limoni oyo elandi”. Na ntango limoni oyo epesamaki, Profeta azalaki kobongola Yoane 5:29.

1–4, Nkolo azali Nzambe; 5–10, Mibombamo ya bokonzi ekobimisama na basembo nyonso; 11–17, Bato nyonso bakolamuka uta na lilita na bosekwi ya bato ya sembo to bosekwi ya basembo te; 18–24, Bafandi ya mikili mingi bazali bana mibali mpe bana basi babotami ya Nzambe na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto; 25–29, Anjelu moko ya Nzambe akweyaki mpe akomaki zabulu; 30–49, Bana ya ebomi bayokaka mpasi ya bokweisami ya seko; nyonso basusu bazwaka boko motuya ya lobiko; 50–70, Nkembo mpe lifuta ya bazalani banetolami na bokonzi ya selesitiale elimbolami; 71–80, Baoyo wana bakosangola libula ya bokonzi ya teresitiale balimbolami; 81–113, Ezalela ya baye wana kati na nkembo ya telesitiale, teresitiale, mpe selesitiale elimbolami; 114–119, Basembo bakoki komona mpe kososola mibombamo ya bokonzi ya Nzambe na nguya ya Molimo Mosantu.

1 Boyoka, O bino lola, mpe botia litoyi, O mabele, mpe bosepela bino bafandi na yango, mpo Nkolo azali Nzambe, mpe libanda na ye Mobikisi azali te.

2 Monene ezali bwania na ye, ya kokamwa ezali banzela na ye, mpe bolayi ya misala na ye moko te akoki koyeba.

3 Bantina na ye ezangaka kokisama te, moko oyo akoki kopekisa loboko na ye azali mpe te.

4 Uta boseko na boseko azali se lolenge moko, mpe mibu na ye ezali na nsuka te.

5 Mpo boye elobi Nkolo—Ngai Nkolo, natonda na boboto mpe na ngolu epayi na baoyo wana babangaka ngai, mpe nasepelaka kokumisa baoyo basalelaka kati na bosembo mpe na bosolo kino na nsuka.

6 Monene ekozala lifuta na bango mpe seko ekozala nkembo na bango.

7 Mpe epayi na bango nakobimisa mibombamo nyonso, iyo, mibombamo nyonso mibombama ya bokonzi na ngai uta na mikolo ya kala, mpe na bileko bikoya, ntango ekoyebana epayi na bango bosepeli malamu ya bolingi na ngai na ntina ya makambo nyonso etali bokonzi na ngai.

8 Iyo, kutu makamwisi ya boseko bakoyeba, mpe makambo esengeli koya nakolakisa bango, kutu makambo etali nkola ebele.

9 Mpe bwania na bango ekozala monene, mpe bososoli na bango ekokoma na lola; mpe liboso na bango bwania ya bato ya bwania ekowa, mpe bososoli ya bato ya bokebi ekoleka mpamba.

10 Mpo na nzela ya Molimo na ngai nakongengisa mayele na bango, mpe na nguya na ngai nakoyebisa epayi na bango mankuku ya bolingi na ngai—iyo, kutu makambo oyo wana liso emona naino te, oyo litoyi eyoka naino te, oyo makota naino kati na motema ya moto mpe te.

11 Biso, Joseph Smith Mwana mpe Sidney Rigdon, wana ezalaki biso na Molimo na mokolo ya zomi na motoba sanza ya mibale, na mobu ya Nkolo na biso nkama zomi na mwambe na ntuku misato na mibale—

12 Na nguya ya Molimo miso na biso efungolamaki mpe bososoli na biso bongengisamaki, ete tokokaki komona mpe kososola makambo ya Nzambe—

13 Kutu makambo oyo wana ezalaki uta na ebandeli liboso ete mokili ezala, oyo matindamaki na Tata, na nzela ya Mwana Mobotami se Moko na ye, oyo azalaki na ntolo ya Tata, kutu uta na ebandeli;

14 Na ntina ya nani topesi litatoli; mpe litatoli oyo topesi ezali litondi ya nsango malamu ya Yesu Klisto, oyo azali Mwana, oyo tomonaki mpe elongo na nani tosololaki na limoni uta na lola.

15 Mpo wana ezalaki biso kosala mosala ya bobongoli, oyo Nkolo apesaki epayi na biso, tokomaki na molongo ya kotanga ntuku mibale na libwa ya mokapo ya mitano ya Yoane, oyo epesamaki epayi na biso lokola elandi—

16 Kolobaka na ntina ya bosekwi ya bakufi, mpo na oyo etali baoyo wana bakoyoka mongongo ya Mwana ya Moto:

17 Mpe bakobima, baoyo basalaki bolamu, kati na bosekwi ya bayengebene; mpe baoyo basalaki mabe, na bosekwi ya bato bazanga boyengebene.

18 Sikawa likambo oyo ekamwisaki biso, mpo epesamaki epayi na biso na Molimo.

19 Mpe wana ezalaki biso komanyola makambo oyo, Nkolo asimbaki miso ya bososoli na biso mpe efungolamaki, mpe nkembo ya Nkolo engengaki nzinganzinga mpembeni.

20 Mpe tomonaki nkembo ya Mwana, na loboko ya mobali ya Tata, mpe tozwaki litondi na ye;

21 Mpe tomonaki banjelu basantu, mpe bango oyo basantisama liboso ya kiti ya bokonzi na ye, kokumbamelaka Nzambe, mpe Mwana ya mpate, baoyo bazali kokumbamela ye libela na libela.

22 Mpe sikawa, nsima ya matatoli mingi oyo epesamaki na ntina na ye, oyo ezali litatoli, ya nsuka kati na nyonso, oyo tozali kopesa na ntina na ye: Ete azali na bomoi!

23 Mpo tomonaki ye, kutu na loboko ya mobali ya Nzambe, mpe toyokaki mongongo kopesa litatoli ete azali Mobotami se Moko ya Tata—

24 Ete na ye, mpe na nzela na ye, mpe mpo na ye, mikili ezali mpe mikelamaki, mpe bafandi na yango bazali bana mibali mpe bana basi babotami ya Nzambe.

25 Mpe oyo tomonaki lisusu, mpe topesi litatoli, ete anjelu moko ya Nzambe oyo azalaki na likoki na miso ya Nzambe oyo atombokaki na Mwana Mobotami se Moko oyo Tata alingaki mpe oyo azalaki na ntolo ya Tata, abwakamaki na nse na mabele uta na miso ya Nzambe mpe Mwana,

26 Mpe abiangamaki Ebomi, mpo lola elelaki likolo na ye—azalaki Lusifelo mwana mobali ya ntongo.

27 Mpe totalaki, mpe mona, akwei! akwei, kutu mwana mobali ya ntongo!

28 Mpe wana ezalaki biso naino kati na Molimo, Nkolo apesaki biso motindo ete tosengeli kokoma limoni yango; mpo tomonaki Satana, nioka wana ya kala, kutu zabulu, oyo atombokaki na Nzambe, mpe alukaki kobotola bokonzi ya Nzambe na biso mpe ya Klisto na ye—

29 Yango wana, abundaki etumba na basantu ya Nzambe, mpe azingi-zingi bango mpembeni epayi na bipayi.

30 Mpe tomonaki limoni ya bolozi ya baoyo abundaki na bango etumba mpe baoyo alongaki, mpo boye nde eyaki mongongo ya Nkolo epayi na biso:

31 Boye elobi Nkolo na ntina ya baoyo wana nyonso bayebi nguya na ngai, mpe baoyo bakomisami bakaboli na yango, mpe bamipesi nzela bango moko ya kolongama na nguya ya zabulu, mpe mpo na kowangana bosolo mpe kotia ntembe na nguya na ngai—

32 Ezali bango oyo bazali bana ya ebomi, na ntina na bango oyo nalobi ete ebongaki malamu mpo na bango babotama soki moke te;

33 Mpo bazali sani ya nkele, batindami mpo na koyoka mpasi ya nkele ya Nzambe, elongo na zabulu mpe banjelu na ye kati na boseko;

34 Mpo na ntina ya baoyo nalobaki ete bolimbisi ezali te ezala kati na mokili oyo soki mpe na mokili ekoya—

35 Na kowanganaka Molimo Mosantu nsima ya kozwa yango, mpe na kowanganaka Mwana Mobotami se Moko ya Tata, na kobakaka ye na ekulusu na mayele na bango moko mpe koyokisaka ye soni na polele.

36 Ezali bango oyo bakobwakama kati na liziba ya moto mpe libanga ya fofolo, elongo na zabulu mpe banjelu na ye—

37 Mpe se bobele baye moko likolo ya baoyo kani liwa ya mibale ekozala na nguya;

38 Iyo, solo ezali bobele baoyo moko oyo bakosikolama te na ntango elongobani ya Nkolo, nsima ya koyoka bolozi ya nkele na ye.

39 Mpo montika nyonso mokobimisama na bosekwi ya bakufi, na nzela ya kolonga liwa mpe nkembo ya Mwana ya mpate, oyo babomaki, oyo azalaki na ntolo ya Tata liboso ete mikili mikelama.

40 Mpe oyo ezali nsango malamu, nsango ya nsai, oyo mongongo uta na lola ezali kotatola epayi na biso—

41 Ete ayaki kati na mokili, kutu Yesu, kobakama na ekulusu mpo na mokili, mpe komema masumu ya mokili, mpe kosantisa mokili, mpe kosukola yango uta na bozangi nyonso ya bosembo;

42 Ete na nzela na ye nyonso bakoka kobikisama baoyo Tata apesaki na nguya na ye mpe asalaki na nzela na ye;

43 Ye oyo akembelaka Tata, mpe asikolaka misala nyonso ya maboko na ye, longola se baoyo wana bana ya ebomi baoyo bawanganaka Mwana wana esili Tata kobimisa ye.

44 Yango wana, abikisaka nyonso longola se bango—bakokende kati na etumbu ya libela, oyo ezali etumbu ezanga nsuka, oyo ezali etumbu ya seko, koyangela elongo na zabulu mpe banjelu na ye kati na boseko, epayi wapi misopi na bango mikufaka te, mpe moto mozimaka te, oyo ezali monioko na bango—

45 Mpe nsuka na yango, mpe esika na yango, soki te monioko na bango, moto moko ayebi te;

46 Mpe ebimisamaki te, ebimi mpe te, mpe ekobimisama na moto moko mpe te, longola se epayi na bango oyo bakomisami bakaboli ya etumbu yango.

47 Nzokande, ngai Nkolo, nalakisi yango na limoni epayi ya bato ebele, kasi sasaipi nakangi yango lisusu;

48 Yango wana, nsuka, bonene, bosanda, bozindo, mpe mpasi ya etumbu oyo, bayebi yango te, moto moko mpe te, longola se baoyo wana batindami na bokweisami oyo.

49 Mpe toyokaki mongongo yango, kolobaka: Bokoma limoni yango, mpo mona, oyo ezali nsuka ya limoni ya bolozi ya bato bazanga bonzambe.

50 Mpe lisusu topesi litatoli—mpo tomonaki mpe toyokaki, mpe oyo ezali litatoli ya nsango malamu ya Klisto na ntina ya baoyo bakobima na bosekwi ya bayengebene—

51 Bazali baoyo bazwaki litatoli ya Yesu, mpe bandimaki na nkombo na ye mpe babatisamaki na lolenge ya bokundami na ye, kokundamaka kati na mai na nkombo na ye, mpe oyo engebene na mitindo oyo asilaki kopesa—

52 Ete na kobombaka mitindo bakoka kosukolama mpe kopetolama uta na masumu na bango nyonso, mpe kozwa Molimo Mosantu na kotiama maboko na ye oyo akulisami mpe akangemi na nguya oyo;

53 Mpe baoyo bazali kolonga na bondimi, mpe bakangemi na Molimo Mosantu ya elaka, oyo Tata asopaki likolo ya nyonso baoyo wana bazali bayengebene mpe solo.

54 Bazali bango oyo ya eklezia ya Mobotami ya yambo.

55 Bazali baoyo na maboko ya nani Tata asili kopesa biloko nyonso—

56 Bazali baoyo bazali banganganzambe mpe bakonzi, oyo bazwaki ndambo ya litondi na ye, mpe nkembo na ye;

57 Mpe bazali banganganzambe na ye oyo Aleki Likolo, na molongo ya Melikisedeki, oyo azalaki na molongo ya Enoka, oyo azalaki na molongo ya Mwana Mobotami se Moko.

58 Yango wana, lokola ekomami, bazali banzambe, kutu bana ya Nzambe

59 Yango wana, biloko nyonso ezali na bango, ezala bomoi to kufa, soki biloko ya ntango oyo, soki biloko ya ntango ekoya, nyonso ezali na bango mpe bazali ya Klisto, mpe Klisto azali ya Nzambe.

60 Mpe bakolonga makambo nyonso.

61 Yango wana, botika moto moko te akembela moto, kasi botika ye akembela nde Nzambe, oyo akotia banguna nyonso na nse ya makolo na ye.

62 Baoyo bakozala liboso ya Nzambe mpe ya Klisto na ye libela na libela.

63 Baoyo ezali bango oyo akomema elongo na ye, ntango akoya kati na mapata ya lola koyangela na mabele likolo ya bato na ye.

64 Baoyo ezali bango oyo bakozala na bosekwi ya yambo.

65 Baoyo ezali bango oyo bakobima na bosekwi ya bayengebene.

66 Baoyo ezali bango oyo bayaki na Ngomba ya Siona, mpe na engumba ya Nzambe ya bomoi, na esika ya lola, na esika ya bosantu koleka nyonso.

67 Baoyo ezali bango oyo basanganaki na lisanga ya bibele ya banjelu, na mayangani minene mpe eklezia ya Enoka, mpe na oyo ya Babotami ya yambo.

68 Baoyo ezali bango oyo kani nkombo ekomami na lola, epayi wapi Nzambe mpe Klisto bazali basambisi ya nyonso.

69 Baoyo ezali bango oyo bazali bayengebene oyo bakomisami bato babongi nie na nzela ya Yesu moyokanisi ya liyokani ya sika, oyo akokisi bomikabi ya kobonga nie na nzela ya bosopi ya makila na ye moko.

70 Baoyo ezali bango oyo kani nzoto ezali ya selesitiale, baoyo kani nkembo ezali oyo wana ya moi, kutu nkembo ya Nzambe, oyo azali likolo koleka nyonso, oyo kani nkembo ekomami ete ezali lokola bongengi ya moi na etando ya likolo.

71 Mpe lisusu, tomonaki mokili ya teresitiale, mpe tala mpe mona, baoyo ezali bango oyo bazali na nzoto ya teresitiale, baoyo kani nkembo ekeseni na oyo ya eklezia ya Babotami ya yambo oyo bazwaki litondi ya Tata, kutu lokola nkembo ya sanza ekeseni na oyo ya moi na etando ya likolo.

72 Tala, baoyo ezali bango oyo bakufaki na kozangaka mobeko;

73 Mpe lisusu baoyo ezali milimo ya bato oyo mibombamaki na boloko, oyo kani Mwana akendaki kotala, mpe ateyaki nsango malamu epayi na bango, ete bakoka kosambisama engebene na bato kati na mosuni.

74 Baoyo bazwaki te litatoli ya Yesu kati na mosuni, kasi nsima bazwaki yango.

75 Baoyo ezali bato ya lokumu ya mabele, baoyo kani miso ebomamaki na mayele mabe ya bato.

76 Baoyo ezali bango oyo bazwaka nkembo na ye, kasi nkembo ya litondi na ye te.

77 Baoyo ezali bango oyo bazwaka nkembo uta na Mwana, kasi uta na litondi ya Tata te.

78 Yango wana, bazali nzoto ya teresitiale, mpe nzoto ya selesitiale te, mpe ekeseni na nkembo lokola sanza ekeseni na moi.

79 Baoyo ezali bango oyo bazali na mpiko te na litatoli ya Yesu; yango wana, bakozwa te motole ya bokonzi ya Nzambe na biso.

80 Mpe sikawa oyo ezali nsuka ya limoni oyo tomonaki ezali ya teresitiale, oyo Nkolo apesaki biso motindo ete tokoma wana ezalaki biso naino kati na Molimo.

81 Mpe lisusu, tomonaki nkembo ya telesitiale, nkembo oyo ezali moke, kutu lokola nkembo ya minzoto ekeseni na nkembo ya sanza na bofungwami ya likolo.

82 Baoyo ezali bango oyo bayambaki nsango malamu ya Klisto te, soki mpe litatoli ya Yesu te.

83 Baoyo ezali bango oyo bawanganaki Molimo Mosantu te.

84 Baoyo ezali bango oyo babwakami na lifelo.

85 Baoyo ezali bango oyo bakosikolama te uta na zabulu kino na bosekwi ya nsuka, kino ntango Nkolo, kutu Klisto Mwana ya mpate, akosilisa mosala na ye.

86 Baoyo bazali baye bakozwa mobimba na ye na mokili ya seko te, kasi ya Molimo Mosantu na nzela ya mosala ya oyo ya teresitiale;

87 Mpe ya teresitiale na nzela ya mosala ya oyo ya selesitiale.

88 Mpe lisusu ya telesitiale bakozwa yango uta na mosala mwa banjelu oyo baponami kosala mpo na bango, soki te baoyo baponami kosalela milimo mpo na bango; mpo bakozala basangoli libula ya lobiko.

89 Mpe boye tomonaki, na limoni uta na lola, nkembo ya telesitiale, oyo eleki bososoli nyonso.

90 Mpe moto moko te ayebi yango longola se ye oyo epayi nani Nzambe abimisi yango.

91 Mpe boye tomonaki nkembo ya teresitiale oyo eleki mpenza na makambo nyonso nkembo ya telesitiale, kutu na nkembo, mpe na nguya, mpe na bokasi monene, mpe na mpifo.

92 Mpe boye tomonaki nkembo ya selesitiale, oyo eleki mpenza na makambo nyonso—wapi Nzambe, kutu Tata, ayangelaka likolo ya kiti ya bokonzi mpo na libela na libela;

93 Liboso ya kiti ya bokonzi ya nani biloko nyonso bingumbamaka na limemia ya bomikitisi, mpe bipesaka ye nkembo libela na libela.

94 Baoyo bafandaka liboso na ye bazali eklezia ya Babotami ya yambo; mpe bamonaka lokola bamonani, mpe bayebaka lokola bayebani, mpo bazwaki litondi na ye mpe ngolu na ye;

95 Mpe akosala bango ete bakokana na nguya, mpe na bokasi, mpe na mpifo.

96 Mpe nkembo ya selesitiale ezali moko, kutu lokola nkembo ya moi ezali moko.

97 Mpe nkembo ya teresitiale ezali moko, kutu lokola nkembo ya sanza ezali moko.

98 Mpe nkembo ya telesitiale ezali moko, kutu lokola nkembo ya minzoto ezali moko; mpo lokola monzoto moko ekeseni na monzoto mosusu na nkembo, kutu bongo nde moko akeseni na mosusu mpo na oyo etali nkembo kati na mokili ya telesitiale;

99 Mpo baoyo ezali bango oyo bazali ya Paulo, mpe baoyo bazali ya Apolo, mpe baoyo bazali ya Kefa.

100 Baoyo ezali bango oyo bazali koloba ete bazali boko ya moko oyo mpe boko ya mosusu—boko ya Klisto mpe boko ya Yoane, mpe boko ya Mose, mpe boko ya Eliyasi, mpe boko ya Esayasi, mpe boko ya Yisaya, mpe boko ya Enoka;

101 Kasi bayambaki nsango malamu te, soki litatoli ya Yesu mpe te, soki ya baprofeta mpe te, soki liyokani ya libela mpe te.

102 Mpe na nsuka ya nyonso, baoyo nyonso ezali bango oyo bakosangana elongo na basantu te, mpo na kokamatama likolo elongo na eklezia ya Babotami ya yambo, mpe koyambama kati na lipata.

103 Baoyo ezali bango oyo bazali bato ya lokuta, mpe bandoki, mpe bato na ekobo, mpe bato na pite, mpe baoyo nyonso balingaka kokosa mpe kobuka lokuta.

104 Baoyo ezali bango oyo bayokaka bolozi ya nkele ya Nzambe na mabele.

105 Baoyo ezali bango oyo bayokaka bolozi ya bobekoli ya moto ya seko.

106 Baoyo ezali bango oyo babwakami na lifelo mpe bayokaka bolozi ya nkele ya Nzambe ya Bokasi nyonso, kino na litondi ya ntango, ntango Klisto akotia banguna nyonso na nse ya makolo na ye, mpe mosala na ye ekosila akobongisama nie;

107 Ntango akozongisa bokonzi, mpe akopesa yango epayi ya Tata, kozangaka mbindo, kolobaka ete: Nasili kolonga mpe koniata nzungu ya vinyo ngai moko, kutu nzungu ya vinyo ya nkele ya Nzambe ya Bokasi nyonso.

108 Nsima nde akolatisama motole ya nkembo na ye, mpe kofanda likolo ya kiti ya bokonzi ya nguya na ye mpo na koyangela libela na libela.

109 Kasi tala, mpe mona, tomonaki nkembo mpe bafandi ya mokili ya telesitiale, ete bazalaki na motango te lokola minzoto na bofungwami ya lola, to lokola zelo likolo ya libongo;

110 Mpe toyokaki mongongo ya Nkolo kolobaka: Baoyo nyonso bakobuka ebongolo, mpe monoko nyonso mokotubela epayi na ye oyo afandi likolo ya kiti ya bokonzi libela na libela;

111 Mpo bakosambisama engebene na misala na bango, mpe moto nyonso akozwa engebene na misala na ye moko, mpifo na ye moko, kati na bifandelo oyo elengelami;

112 Mpe bakozala basali epayi ya oyo Aleki Likolo; kasi epayi wapi Nzambe na Klisto bafandi bakoki koya te, mikili mizanga nsuka.

113 Oyo ezali nsuka ya limoni tomonaki, oyo totindamaka kokoma wana ezalaki biso naino kati na Molimo.

114 Kasi misala ya Nkolo ezali minene mpe ya kokamwa, mpe mibombamo ya bokonzi na ye oyo alakisaki epayi na biso, oyo mileki bososoli nyonso na nkembo, mpe na bokasi, mpe na mpifo;

115 Oyo atindaki biso ete tosengeli kokoma te wana ezalaki biso kati na Molimo, mpe oyo mipekisami engebene na mibeko mpo na moto koloba;

116 Moto akoki mpe koyebisa yango te, mpo esengeli bobele komonana mpe kososolama na nguya ya Molimo Mosantu, oyo Nzambe apesaka epayi na baoyo wana balingaka ye, mpe bamipetolaka liboso na ye;

117 Epayi ya nani apesaka litomba oyo ya komona mpe kososola mpo na bango moko;

118 Ete na nzela ya nguya mpe ya mamonisi ya Molimo, wana ezali bango na mosuni, bakoka kokanga motema ya kozala liboso na ye kati na mokili ya nkembo.

119 Mpe tika nkembo, mpe lokumu, mpe mpifo ezala na Nzambe mpe na Mwana ya mpate libela na libela. Amene.

Bimisa na lokasa