Makomi
Malongi mpe Mayokani 133


Eteni 133

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Hiram, Ohio, na mokolo ya 3, sanza ya zomi na moko ya mobu 1831. Lokola liloba ya boyingisi mpo na emoniseli oyo, mambi ya kala ya Profeta Smith makomi ete, “Na ntango oyo ezalaki na makambo mingi oyo Bampaka bazalaki na mposa ya koyeba na kotalaka koteya Nsango malamu na bafandi ya mabele, mpe mpo na oyo etali bosangani; mpe mpo na kotambola na pole ya solo, mpe kolakisama uta na likolo, na mokolo ya 3 sanza zomi na moko ya mobu 1831, natunaki Nkolo mpe nazwaki emoniseli monene oyo elandi.” Eteni oyo ebakisamaki liboso na buku ya Malongi mpe Mayokani lokola mokanda ya kobakisa na nsuka ya buku mpe nsima ekotisamaki lokola eteni.

1–6, Basantu batindami komilengela mpo na Boyei ya Mibale; 7–16, Bato nyonso batindami kokima Babiloni, koya na Siona, mpe komilengela mpo na mokolo monene ya Nkolo; 17–35, Akotelema likolo ya Ngomba Siona, mikili ekokoma se mboka moko, mpe mabota mabunga ya Yisalaele makozonga; 36–40, Nsango malamu ezongisamaki na nzela ya Joseph Smith mpo na koteyama na mokili mobimba; 41–51, Nkolo akokita na nse mpo na kobekola bato ya nkuna; 52–56, Ekozala mobu ya basikoli na Ye; 57–74, Nsango malamu esengeli kokende bipayi na bipayi mpo na kobikisa Basantu mpe mpo na kobekola bato ya nkuna.

1 Botia bokebi, O bino bato ya eklezia na ngai, elobi Nkolo Nzambe na bino, mpe boyoka liloba ya Nkolo mpo na oyo etali bino—

2 Nkolo oyo akoya na mpwasa kati na tempelo na ye; Nkolo oyo akokita na mokili na bolakeli mabe mpo na kosambisa; iyo, likolo ya bikolo nyonso oyo ebosanaka Nzambe, mpe likolo ya baoyo nyonso bazanga bonzambe na kati na bino.

3 Mpo akoyeisa loboko na ye ya santu mpamba na miso ya bikolo nyonso, mpe nsuka nyonso ya mabele ekomona lobiko ya Nzambe na bango.

4 Yango wana, bomilengela, bomilengela, O bino bato na ngai; bomisantisama; bosangana esika moko, O bino bato ya eklezia na ngai, na mboka ya Siona, bino nyonso oyo botindami te kotikala.

5 Bobima uta na Babiloni. Bozala peto ete bokumba basani ya Nkolo.

6 Bobenga mayangani minene, mpe bolobanaka mbala na mbala. Mpe tika ete moto na moto abelela nkombo ya Nkolo.

7 Iyo, solo nalobi epayi na bino lisusu, ntango ekoki wapi mongongo ya Nkolo ekoya epayi na bino: Bobima na Babiloni; bosangana uta na kati ya bikolo, uta na mipepe minei, uta na nsuka moko ya lola na mosusu.

8 Botinda bampaka ya eklezia na ngai epayi na bikolo bizwami mosika; epayi na binsanga ya mbu; botinda epayi na bamboka ya bapaya; bobelela epayi na bikolo nyonso, yambo epayi ya baoyo bazali Bayuda-te, mpe nsima epayi ya Bayuda.

9 Mpe tala, mpe mona, oyo ekozala kolela na bango, mpe mongongo ya Nkolo epayi ya bato nyonso: Bokende na mboka ya Siona, ete ndelo ya bato na ngai ekoka koyeisama milai, mpe makonzi na ye makoka kolendisama, mpe ete Siona ekoka kokende liboso na bituka ya mpembeni nzinganzinga.

10 Iyo, tika ete kolela yango ebima na kati ya bato nyonso: Bolamuka mpe botelema mpe bokende kokutana na Mobali ya libala; tala mpe mona, Mobali ya libala azali koya; bobima kokutana na ye. Bomilengela mpo na mokolo monene ya Nkolo.

11 Boye, bosenzela, mpo boyebi mokolo soki mpe ngonga te.

12 Yango wana, tika ete bango oyo bazali na kati ya baoyo bazali Bayuda-te bakima epayi ya Siona.

13 Mpe tika ete baoyo bazali na Yuda bakima na Yelusaleme, epayi na bangomba ya ndako ya Nkolo.

14 Bobima uta na kati ya bikolo, kutu uta na Babiloni, uta na kati ya nkuna, oyo ezali Babiloni ya molimo.

15 Kasi solo, boye elobi Nkolo, tika ete bokimi na bino ezala na lombangu te, kasi tika ete biloko nyonso bilengelama liboso na bino; mpe ye oyo akeyi, tika ete atala nsima te mbele ebebi ya mpwasa ekweya likolo na ye.

16 Botia bokebi mpe boyoka, O bino bafandi ya mabele. Botia matoyi elongo, bino bampaka ya eklezia na ngai, mpe boyoka mongongo ya Nkolo; mpo ete azali kobenga bato nyonso, mpe kotinda bato nyonso epayi nyonso koyambola.

17 Mpo tala, Nkolo Nzambe asili kotinda anjelu kogangaka epayi nyonso na katikati ya lola, kolobaka: Bolengela nzela ya Nkolo, mpe bosembola mabulu na nzela na ye; mpo ngonga ya boyei na ye ebelemi—

18 Ntango Mwana ya mpate akotelema likolo ya Ngomba ya Siona, mpe elongo na ye monkama moko na ntuku minei na minei, oyo bazali na nkombo ya Tata na ye ekomami na bilongi na bango.

19 Yango wana, bomilengela mpo na boyei ya Mobali ya libala; bobima, bobima libanda kokutana na ye.

20 Mpo tala, akotelema likolo ya ngomba ya Bilaya, mpe likolo ya mbu ya makasi, kutu mai ya mozindo monene, mpe likolo yamabongo ya mbu, mpe likolo ya mboka ya Siona.

21 Mpe akobimisa mongongo na ye mpe koloba uta na Siona, mpe akoloba uta na Yelusaleme, mpe mongongo na ye moyokana na kati ya bato nyonso;

22 Mpe ekozala mongongo moko lokola mongongo ya mai mingi, mpe lokola mongongo ya kake moko ya monene, oyo ekobuka bangomba, mpe lobwaku ekomonana te.

23 Akotinda mai ya mozindo monene, mpe ekobendama nsima na bikolo ya nordi, mpe binsanga bikokoma se mboka moko;

24 Mpe mabele ya Yelusaleme mpe mabele ya Siona makozongisama na esika na yango moko, mpe mabele ekozala lokola ezalaki na mikolo liboso ete ekatama ndambo ndambo.

25 Mpe Nkolo, kutu Mobikisi, akotelema na katikati ya bato na ye, mpe akoyangela likolo ya mosuni nyonso.

26 Mpe baoyo bazali na bikolo ya nordi bakoya na bokundoli liboso ya Nkolo; mpe baprofeta na bango bakoyoka mongongo na ye, mpe bakomipekisa lisusu te; mpe bakobeta mabanga, mpe libanga ya mai ya mpio ekonyangolama na miso na bango.

27 Mpe balabala moko ekobwakama likolo ya mai ya mozindo monene.

28 Banguna na bango bakokoma nyama ya kokanga mpo na bango,

29 Mpe na bisobe bikawuka maziba ya mai na bomoi makobima; mpe mabele ya zelo ekozala lisusu te mabele mazanga mai.

30 Mpe bakomema ebombelo ya misolo na bango ya motuya epayi ya bana ya Efelaima, basali na ngai.

31 Mpe ndelo ya bangomba ya libela ya mike mike ekoningana na miso na bango.

32 Mpe kuna bakokweya na nse mpe bakolatisama motole na nkembo, kutu na Siona, na maboko ya basali ya nkolo, kutu bana ya Efelaima.

33 Mpe bakotondisama na banzembo ya bosepeli ya libela.

34 Tala, oyo ezali lipamboli ya Nzambe ya libela likolo ya mabota ya Yisalaele, mpe lipamboli ya motuya koleka likolo ya moto ya Efelaima mpe baninga na ye.

35 Mpe lisusu bango ya libota ya Yuda, nsima ya mpasi na bango, bakosantisama na bosantu liboso ya Nkolo, mpo na kofanda na miso na ye moi mpe butu, libela na libela.

36 Mpe sikawa, solo elobi Nkolo, ete makambo oyo makoki koyebana na kati na bino, O bafandi ya mabele, natindi anjelu na ngai kopumbwaka na katikati ya lola, oyo azali na nsango malamu ya libela, oyo asili komonana epayi ya boko bato mpe apesi yango epayi ya moto, oyo akomonana epayi ya mingi baoyo bafandi na mabele.

37 Mpe nsango malamu oyo ekoteyama na bikolo, mpe na mabota, mpe na minoko, mpe na bato nyonso.

38 Mpe basali ya nzambe bakobima, kolobaka na mongongo makasi: Bobanga Nzambe mpe bopesa ye nkembo, mpo ngonga ya bosambisi na ye esili koya;

39 Mpe bokumbamela ye oyo asalaki lola, mpe mabele, mpe mbu, mpe miluka ya mai—

40 Kobelela likolo ya nkombo ya Nkolo butu na moi, kolobaka: O soki ofungolaki lola, soki okitaki na nse, ete bangomba ekoka konyangolama liboso na yo.

41 Mpe ekokokisama likolo ya mitu na bango; mpo miso ya Nkolo ekozala lokola moto monyangolaka oyo ezali kozikisa, mpe lokola moto oyo motokisaka mai.

42 O Nkolo, okokita na nse mpo na kosala ete nkombo na yo eyebana epayi ya bayini na yo, mpe bikolo nyonso ekolenga na miso na yo—

43 Ntango osalaka makambo ya nsomo, makambo oyo bazali kozela te;

44 Iyo, ntango okiti na nse, mpe bangomba enyangolami na miso na yo, okokutana na ye oyo azali kosepela mpe kosala misala ya bosembo, oyo azali komikundola yo na banzela na yo.

45 Mpo uta ebandeli ya mokili bato bayoka te to basosola mpe te na litoyi, liso moko limona mpe te, O Nzambe, longola se yo, boni ezali makambo minene oyo osili kolengela mpo na ye oyo azelaka yo.

46 Mpe ekolobama: Nani azali ye oyo akiti na nse uta na Nzambe na lola alati bilamba ya motane; iyo, uta na bisika eyebani te, alatisami molato na ye ya nkembo, kotambolaka na bonene ya bokasi na ye?

47 Mpe akoloba: Nazali ye oyo alobaki kati na bosembo, oyo azali na bokasi ya kobikisa.

48 Mpe Nkolo akozala motane na molato na ye, mpe bilamba na ye lokola ya ye oyo azali konyata ekamolelo ya vinyo.

49 Mpe monene koleka ekozala nkembo ya miso na ye ete moi mokobomba elongi na ye mpo na nsoni, mpe sanza ekokanga pole na ye, mpe minzoto mikobwakisama uta na bisika na yango.

50 Mpe mongongo na ye mokoyokisama: Nasili konyata ekamolelo ya vinyo ngai moko, mpe nasili komema masambisi likolo ya bato nyonso; mpe moko te azalaki elongo na ngai;

51 Mpe nasili konyata bango na nkanda makasi na ngai, mpe nanyataki bango mpenza na nkele na ngai, mpe makila na bango nasopi yango likolo ya bilamba na ngai, mpe nabebisi nzambala na ngai; mpo oyo ezalaki mokolo ya bobekoli oyo ezalaki kati na motema na ngai.

52 Mpe sikawa mobu ya basikolami na ngai eyei; mpe basengeli kolobela bonkonde ya bolingo ya Nkolo na bango, mpe nyonso oyo asili kopesa epayi na bango engebene na bolamu na ye, mpe engebene na bonkonde ya bolingo na ye, libela na libela.

53 Na mitungisi na bango nyonso atungisamaki. Mpe anjelu oyo azalaka na miso na ye abikisaki bango; mpe kati na bolingo na ye, mpe kati na mawa na ye, asikolaki bango, mpe amemaki bango, mpe asungaki bango na mikolo nyonso ya kala;

54 Iyo, mpe lisusu Enoka, mpe bango oyo bazalaki elongo na ye; baprofeta oyo bazalaki liboso na ye; mpe lisusu Noa, mpe baoyo bazalaki liboso na ye; mpe lisusu Mose, mpe baoyo bazalaki liboso na ye;

55 Mpe uta na Mose kino mosika na Eliya, mpe uta na Eliya kino mosika na Yoane, oyo azalaki na Klisto na bosekwi na ye, mpe bapostolo basantu, elongo na Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo, bakozala liboso na miso ya Mwana ya mpate.

56 Mpe malita ya basantu makofungolama; mpe bakobima mpe bakotelema na loboko ya mobali ya Mwana ya mpate, ntango akotelema likolo ya Ngomba ya Siona, mpe likolo ya engumba esantu, Yelusaleme ya Sika; mpe bakoyemba loyembo ya Mwana ya mpate, butu mpe moi libela na libela.

57 Mpe mpo na ntina oyo, mpo ete bato bakoka koyeisama bakaboli ya nkembo oyo esengaki kobimisama, Nkolo atindaki litondi ya nsango malamu na ye, liyokani na ye ya libela, kolukaka ntina ya likambo na polele mpe na pete—

58 Mpo na kolengela bato na bolembu mpo na makambo wana ezali koya na mabele, mpe mpo na mosala ya Nkolo na mokolo yango ntango bato na bolembu bakoyokisa bato ya bwania nsoni, mpe ekolo ya moke ekokoma yoko ya makasi, mpe bato mibale bakokimisa nkoto zomi.

59 Mpe na nzela ya biloko ya bolembu ya mabele Nkolo akokabola bikolo na nguya ya Molimo na ye.

60 Mpe mpo na ntina oyo mitindo oyo epesamaki; mitindamaki kobombama uta na mokili na mokolo oyo epesamaki, kasi esengeli kotindama sikawa epayi ya mosuni nyonso—

61 Mpe oyo engebene na mayele mpe bolingi ya Nkolo, oyo azali kokonza likolo ya mosuni nyonso.

62 Mpe epayi na ye oyo akoyambola mpe akomisantisama liboso ya Nkolo bomoi ya seko ekopesama.

63 Mpe likolo na bango oyo bayokaka mongongo ya Nkolo te ekokokisama oyo ekomamaki na profeta Mose, ete bakokatama uta na kati ya bato.

64 Mpe lisusu oyo ekomamaki na profeta Malaki: Mpo, tala, mokolo ekoya oyo mokozika lokola fulu, mpe bato nyonso ya lolendo, iyo, mpe nyonso oyo basalaka na nkuna, bakozala lokola mpumbulu; mpe mokolo oyo ekoya ekozikisa bango nie, elobi Nkolo na bibele, ete ekotika bango te na mosisa soki mpe etape moko te.

65 Yango wana, oyo esengeli kozala eyano ya Nkolo epayi na bango:

66 Na mokolo wana ntango nayaki epayi na ngai moko, moto moko te na kati na bino ayambaki ngai, mpe babenganaki bino.

67 Ntango nabengaki lisusu moko te na kati na bino azalaki mpo na koyanola; nzokande loboko na ngai eyeisamaki mokuse soki moke ete nakokaki kosikola te, nguya na ngai mpe te mpo na kokangola.

68 Tala, na mpamela na ngai nakausaka mbu. Nakomisaka bibale bisobe; mbisi na yango elumbaka solo, mpe ekufaka mpo na mposa.

69 Nalatisi lola boindo, mpe nakomisi elamba ya saki ezipelo na bango.

70 Mpe oyo bokozwa uta na loboko na ngai—bokolala na nse na mawa.

71 Tala, mpe mona, ezali na moko te mpo na kokangola bino; mpo botosaki mongongo na ngai te ntango nabengaki bino uta na lola; bondimaki basali na ngai te, mpe ntango batindamaki epayi na bino boyambaki bango te.

72 Yango wana, bakangaki litatoli mpe balingaki mobeko singa, mpe bino bopesamaki epayi na molili.

73 Baye basengeli kobenganama na molili ya libanda, wapi ezali kolela, mpe biyelela, mpe boliani ya mino.

74 Tala Nkolo Nzambe na bino alobi yango. Amene.

Bimisa na lokasa