Makomi
Malongi mpe Mayokani 84


Eteni 84

Emoniseli epesami na nzela ya Profeta Joseph Smith, na Kirtland, Ohio, na mikolo ya 22 mpe 23, sanza ya libwa ya mobu 1832. Na sanza ya libwa, bampaka babandaki kozonga uta na bamision na bango na bikolo ya esti mpe kopesa mbando ya misala na bango. Ezalaki na ntango se moko wana bazalaki esika moko kati na eleko oyo ya bosepeli ete Mayebisi oyo elandi ezwamaki. Profeta abiangaki mayebisi yango emoniseli mpo na ntina ya bonganganzambe.

1–5, Yelusaleme ya Sika mpe tempelo ekotongama na Missouri; 6–17, Molongo ya bana kati na bonganganzambe uta na Mose kino na Adama mopesami; 18–25, Bonganganzambe ya monene ezali na lifungola ya boyebi ya Nzambe; 26–32, Bonganganzambe ya moke ezali na lifungola ya lisalisi ya banjelu mpe ya nsango malamu ya bolengeli; 33–44, Bato bazwaka bomoi ya seko na nzela ya ndai mpe liyokani ya bonganganzambe; 45–53, Molimo ya Klisto mongengisaka mayele ya bato, mpe mokili ezali kolala kati na masumu; 54–61, Basantu basengeli kotatola na ntina ya biloko oyo bazwi; 62–76, Basengeli koteya nsango malamu, mpe bilembo bikolanda; 77–91, Bampaka basengeli kokende mobembo na kokamataka libenga to liboke te, mpe Nkolo akotala bosenga na bango; 92–97, Bolozi mpe bolakeli mabe ezali koyela baoyo wana babwakaka nsango malamu; 98–102, Loyembo ya sika ya bosikoli ya Siona epesami; 103–110, Tika moto na moto asala na esika ya mosala na ye moko mpe asala na libiangi na ye moko; 111–120, Basali ya nkolo basengeli kosakola bonsomo ya libebi ya mikolo ya nsuka.

1 Oyo ezali boko emoniseli ya Yesu Klisto epayi ya mosali na ye Joseph Smith Mwana, mpe bampaka motoba, wana esangisaki bango mitema na bango mpe etombolaki bango mingongo na bango na likolo.

2 Iyo, liloba ya Nkolo mpo na oyo etali eklezia na ye, oyo etiami na mikolo ya nsuka mpo na bozongisi ya bato na ye, lokola elobaki ye na monoko ya baprofeta na ye, mpe mpo na bosangisi ya basantu na ye ete bakoka kotelema likolo ya Ngomba ya Siona, oyo ekozala engumba ya Yelusaleme ya Sika.

3 Engumba oyo ekotongama, kobandaka na esika ya tempelo, oyo elakisami na mosapi ya Nkolo, na ndelo ya ngambo ya westi ya Ekolo Missouri, mpe oyo ekobulisama na maboko ya Joseph Smith Mwana, mpe na basusu oyo Nkolo asepeli na bango malamu.

4 Solo oyo ezali liloba ya Nkolo, ete engumba ya Yelusaleme ya Sika esengeli kotongama na bosangani ya basantu, kobandaka na esika oyo, kutu na esika ya tempelo, tempelo oyo wapi ekotongama na nkola oyo.

5 Mpo solo nkola oyo ekoleka nyonso te kino ndako ekotongama mpo na Nkolo, mpe lipata ekozala likolo na yango, lipata oyo kutu ekozala nkembo ya Nkolo, oyo ekotondisa ndako yango.

6 Mpe bana mibali ya Mose, engebene na Bonganganzambe Bosantu boye azwaki na nse ya maboko ya tata bokilo na ye, Yetelo;

7 Mpe Yetelo azwaki yango na nse ya maboko ya Kalebe;

8 Mpe Kalebe azwaki yango na nse ya maboko ya Elihu;

9 Mpe Elihu na nse ya maboko ya Yilimia;

10 Mpe Yilimia na nse ya maboko ya Gada,

11 Mpe Gada na nse ya maboko ya Esayasi,

12 Mpe Esayasi azwaki yango na nse ya maboko ya Nzambe.

13 Esayasi lisusu azalaki na mikolo ya Abalayama, mpe apambolamaki na ye—

14 Oyo Abalayama azwaki bonganganzambe uta na Melikisedeki, oyo azwaki yango na nzela ya libota ya batata na ye, kutu kino na Noa;

15 Mpe uta na Noa kino na Enoka, na nzela ya libota ya batata na bango;

16 Mpe uta na Enoka kino na Abele, oyo babomaki na ekokolo ya ndeko na ye ya mobali, oyo azwaki bonganganzambe mpo na mitindo ya Nzambe, na nse ya maboko ya tata na ye Adama, oyo azalaki moto ya yambo—

17 Bonganganzambe boye wapi ezali kokoba kati na eklezia ya Nzambe na nkola nyonso, mpe ezanga ebandeli ya mikolo to nsuka ya mibu.

18 Mpe Nkolo apesaki bonganganzambe lisusu likolo ya Alona mpe likolo ya nkona na ye, kowumelaka kolanda bankola na bango nyonso, bonganganzambe boye ezali kokoba mpe etikali libela elongo na bonganganzambe boye ezali na molongo mosantu ya Nzambe.

19 Mpe bonganganzambe ya monene boye eyangelaka nsango malamu mpe ezali na lifungola ya mibombamo ya bokonzi, kutu lifungola ya boyebi ya Nzambe.

20 Boye, kati na makuli ya bonganzambe yango, nguya ya bonzambe ezali komonisama.

21 Mpe soki makuli na yango te, mpe likoki ya bonganganzambe, nguya ya bonzambe ekoki te komonisama epayi ya bato na mosuni;

22 Mpo soki oyo ezali te moto moko te akoki komona elongi ya Nzambe, kutu Tata, mpe kotikala na bomoi.

23 Sikawa oyo Mose ateyaki yango mpenza malamu na bana ya Yisalaele kati na esobe, mpe alukaki na molende kosantisa bato na ye ete bakoka komona elongi ya Nzambe;

24 Kasi bayeisaki mitema na bango makasi mpe bakokaki te kokanga mitema liboso na ye; boye, Nkolo na nkele na ye, mpo ete nkanda na ye ezalaki kopela na bango, alapaki ndai ete bakokota na bopemi na ye te wana ezalaki bango na esobe, oyo bopemi ezali litondi ya nkembo na ye.

25 Boye, alongolaki Mose uta na katikati na bango, mpe lisusu Bonganganzambe Bosantu;

26 Mpe bonganganzambe ya moke ekobaki, bonganganzambe boye ezali na lifungola ya lisalisi ya banjelu mpe nsango malamu ya bolengeli;

27 Nsango malamu oyo ezali nsango malamu ya boyamboli mpe ya libatisi, mpe ya bolimbisi ya masumu, mpe mobeko oyo ezali na mitindo etali mosuni, oyo Nkolo na nkele na ye asalaki ete ekoba na ndako ya Alona na kati ya bana ya Yisalaele kino na Yoane, oyo Nzambe abimisaki, mpe oyo atondaki na Molimo Mosantu uta na libumu ya mama na ye.

28 Mpo abatisamaki wana ezalaki ye naino na bomwana na ye, mpe akulisamaki na nguya oyo na banjelu ya Nzambe na ntango azalaki se na mikolo mwambe mpo na kokweisa bokonzi ya Bayuda, mpe mpo na kosembola nzela ya Nkolo liboso ya bato na ye, kolengela bango mpo na boyei ya Nkolo, na maboko ya nani oyo nguya nyonso epesami.

29 Mpe lisusu, lotomo ya mpaka mpe ya episikopo ezali biteni ebakisami mpe oyo esengeli ya bonganganzambe ya monene.

30 Mpe lisusu, lotomo ya molakisi mpe ya diakona ezali bitape esengeli oyo ezali ya bonganganzambe ya moke, bonganganzambe boye ekotisamaki likolo ya Alona mpe bana mibali na ye.

31 Boye, lokola nalobaki mpo na oyo etali bana mibali ya Mose—mpo bana mibali ya Mose mpe lisusu bana mibali ya Alona bakopesa libonza mpe mbeka endimami na ndako ya Nkolo, ndako oyo ekotongama mpo na Nkolo na nkola oyo, na esika ebulisami lokola naponaki—

32 Mpe bana mibali ya Mose mpe ya Alona bakotonda na nkembo ya Nkolo, likolo ya Ngomba ya Siona na ndako ya Nkolo, baoyo kani bino bozali bana mibali; mpe lisusu mingi baoyo nasili kobenga mpe kotinda kolendisa eklezia na ngai.

33 Mpo bato nyonso oyo bazali sembo ya kozwa bonganganzambe oyo mibale nalobeli, mpe bakumisi libiangi na bango, basantisami na Molimo kino na kozongisa nzoto na bango sika.

34 Bango bakomi bana mibali ya Mose mpe ya Alona mpe nkona ya Abalayama, mpe eklezia mpe bokonzi, mpe baponami ya Nzambe.

35 Mpe lisusu banso oyo bakoyamba bonganganzambe oyo bayambi ngai, elobi Nkolo;

36 Mpo ye oyo akoyamba basali na ngai ayambi ngai;

37 Mpe ye oyo akoyamba ngai ayambi Tata na ngai;

38 Mpe ye oyo akoyamba Tata na ngai akoyamba bokonzi ya Tata na ngai; na boye nyonso oyo Tata na ngai azali na yango ekopesama epayi na ye.

39 Mpe oyo ezali engebene na ndai mpe liyokani oyo ezali ya bonganganzambe.

40 Yango wana, nyonso oyo wana bazwi bonganganzambe yango, bandimi ndai mpe liyokani ya Tata na ngai, oyo akoki te kobuka, oyo ekoki soki mpe kolongolama te.

41 Kasi oyo nyonso akobuka liyokani oyo nsima ya koyamba yango, mpe abaloli mokongo nie uta na yango, akozwa bolimbisi ya masumu na ye te ezala kati na mokili oyo soki mpe na mokili ekoya.

42 Mpe lisuma na nyonso baoyo bakoya te epayi na bonganganzambe boye bozwaki, boye nakotisi sikawa likolo na bino baoyo bozali awa na mokolo oyo, na mongongo na ngai moko uta na lola; mpe kutu nasili kopesa na bibele ya lola mpe na banjelu na ngai mokumba na ntina na bino.

43 Mpe sikawa nazali kopesa epayi na bino motindo moko ya kosala keba mpo na oyo etali bino moko, na kotiaka bokebi monene na maloba na bomoi ya seko.

44 Mpo bosengeli kobika na liloba nyonso oyo ebimaka uta na monoko ya Nzambe.

45 Mpo liloba ya Nkolo ezali bosolo, mpe nyonso oyo ezali bosolo ezali pole, mpe nyonso oyo ezali pole ezali Molimo, kutu Molimo ya Yesu Klisto.

46 Mpe Molimo mopesaka pole na moto nyonso oyo ayei kati na mokili; mpe Molimo mongengisaka moto nyonso epayi nyonso na mokili, oyo atiaka litoyi na mongongo ya Molimo.

47 Mpe moto nyonso oyo ayokaka mongongo ya Molimo ayaka epayi ya Nzambe, kutu Tata.

48 Mpe Tata ateyi ye mpo na oyo etali liyokani oyo azongisi sika mpe akotisi likolo na bino mpo na ntina na bino moko, mpe bobele mpo na ntina na bino moko te, kasi mpo na ntina ya mokili mobimba.

49 Mpe mokili mobimba molali kati na masumu, mpe ezali kolela-lela na nse ya molili mpe na nse ya boumbu ya masumu.

50 Mpe na oyo bokoki koyeba ete bazali na nse ya boumbu ya masumu, mpo bazali koya epayi na ngai te.

51 Mpo moto nyonso oyo ayei epayi na ngai te azali na nse ya boumbu ya masumu.

52 Mpe moto nyonso oyo aboyi kondima mongongo na ngai ameseni na mongongo na ngai te, mpe azali na ngai te.

53 Mpe na oyo bokoki koyeba moto ya sembo na moto ya nkuna, mpe ete mokili mobimba ezali kolela-lela na nse ya masumu mpe na nse ya molili kutu sikawa.

54 Mpe mayele na bino na ntango eleki ekomaki molili likolo ya bozangi boyambi, mpe mpo botalaki mpamba makambo oyo bondimaki—

55 Lipombo mpe bozangi boyambi boye esili komema eklezia mobimba na nse ya bokwei.

56 Mpe bokwei boye efandi likolo ya bana ya Siona, kutu likolo ya nyonso.

57 Mpe bakotikala na nse ya bokwei boye kino bakoyambola mpe bakokundola liyokani ya sika, kutu Buku ya Mormon mpe mitindo ya yambo oyo napesaki bango, ezala bobele mpo na koloba te, kasi mpo na kosalela engebene na oyo wana nakomaki—

58 Ete bakoka kobota mbuma ekoki mpo na bokonzi ya Tata na bango; soki bongo te fimbo mpe masambisi makosopana likolo ya bana ya Siona.

59 Mpo esengeli bana ya bokonzi kobebisa mabele na ngai masantu? Solo, nalobi epayi na bino, Te.

60 Solo, solo, nalobi epayi na bino baoyo bozali sikawa koyoka maloba na ngai, oyo ezali mongongo na ngai, bopambolami mbala mingi lokola boyambi makambo oyo;

61 Mpo nakolimbisa bino uta na masumu na bino kopesaka bino motindo oyo—ete botikala molende kati na mayele na bino na lipombo mpe molimo ya losambo, na kopesaka litatoli na mokili mobimba ya makambo oyo wana eyebisami epayi na bino.

62 Yango wana, bokende kati na mokili mobimba; mpe na esika nyonso wapi ekoki bino te kokende bosengeli kotinda litatoli, ete litatoli yango ekoka uta na bino kokende na mokili mobimba epayi na ekelamo moko moko.

63 Mpe lokola nalobaki epayi ya bapostolo na ngai, kutu nalobi epayi na bino, mpo bozali bapostolo na ngai, kutu banganganzambe minene ya Nzambe; bozali bino baoyo Tata na ngai apesaki ngai, bozali baninga na ngai;

64 Boye, lokola nalobaki epayi ya bapostolo na ngai nalobi epayi na bino lisusu, ete moto nyonso oyo andimi maloba na bino, mpe abatisami na mai mpo na bolimbisi ya masumu, akozwa Molimo Mosantu.

65 Mpe bilembo oyo ekolanda baoyo bandimi—

66 Na nkombo na ngai bakosala misala mingi ya kokamwa;

67 Na nkombo na ngai bakobengana bazabulu;

68 Na nkombo na ngai bakobikisa bakoni;

69 Na nkombo na ngai bakofungola miso ya bato bakufa miso, mpe kokangola matoyi ya bakufi matoyi;

70 Mpe lolemo ya bababa ekoloba;

71 Mpe soki moto moko akotiela bango ngenge na kufa ekosala bango mpasi te;

72 Mpe ngenge ya nioka ekozala na nguya ya kosala bango mpasi te.

73 Kasi napesi motindo moko epayi na bango, ete bamitiela lofundo te na makambo oyo, soki mpe kolobela yango liboso ya mokili; mpo makambo oyo epesami epayi na bino mpo na litomba na bino mpe mpo na lobiko.

74 Solo, solo, nalobi epayi na bino, bango oyo bakondima maloba na bino te, mpe babatisami na mai na nkombo na ngai te, mpo na bolimbisi ya masumu na bango, ete bakoka kozwa Molimo Mosantu, bakokweisama, mpe bakoya kati na bokonzi ya Tata na ngai epayi wapi Tata na ngai mpe ngai nazali te.

75 Mpe emoniseli oyo, mpe motindo oyo mopesami epayi na bino, etiami na misala uta na ngonga oyo mpenza na mokili mobimba, mpe nsango malamu ezali kokende epayi ya nyonso oyo bayambaki yango te.

76 Kasi, solo nalobi epayi ya nyonso baoyo wana epayi kani bokonzi epesamaki—uta na bino nde esengeli koteyama epayi na bango, ete bakoka koyambola uta na misala na bango ya mabe ya kala; mpo basengeli kopamelama na ntina ya mitema mabe na bango mizanga boyambi, mpe bandeko bandimi na bino na Siona mpo na botomboki na bango na bino na ntango natindaki bino.

77 Mpe lisusu nalobi epayi na bino, baninga na ngai, mpo uta sikawa kokende liboso nakobenga bino baninga na ngai, elongobani ete napesa epayi na bino motindo oyo, ete bokoma kutu lokola baninga na ngai na mikolo nazalaki elongo na bango, kosalaka mobembo mpo na koteya nsango malamu na nguya na ngai;

78 Mpo napesaki bango nzela ya kozala na libenga to mpe liboke te, ya kozala na kazaka mibale mpe te.

79 Tala, natindi bino komeka mokili, mpe mosali abongi na lifuta na ye.

80 Mpe moto nyonso oyo akokende mpe akoteya nsango malamu oyo ya bokonzi, mpe akangemi kaka kokoba sembo kati na makambo nyonso, akolemba na mayele te, na nzoto, na binama, na bikangiseli mpe te; mpe mayele ekokoma molili mpe te, mpe suki moko te ya moto na ye ekokweya na nse soki eyebani te. Mpe bakokende na nzala te, soki mpe na mposa te.

81 Boye, bomitungisa mpo na lobi te, mpo na nini bokolia, soki mpe nini bokomela, to mpe na nini bokolatisama.

82 Mpo, botala fololo ya bilanga, lolenge boni ekolaka, esalaka te, itongaka mpe te; mpe babokonzi ya mokili, na nkembo nyonso na yango, bitutaki monzele lokola moko ya fololo oyo te.

83 Mpo Tata na bino, oyo azali na lola, ayebi ete bozali na bosenga ya biloko nyonso oyo.

84 Boye, tika ete lobi ekanisela biloko na yango moko.

85 Bomitungisa mpe nini bokoloba liboso te; kasi bombaka ntango nyonso na mayele na bino maloba oyo mapesaka bomoi, mpe ekopesamela bino na ngonga wana mpenza ndambo oyo ekozongisama epayi ya moto na moto.

86 Boye, tika ete moto moko te na kati na bino, oyo azali kokende kosakola nsango malamu oyo ya bokonzi, uta na ngonga oyo kokende liboso akamata libenga mpe liboke, mpo ete motindo oyo ezali mpo na basembo nyonso oyo babiangami na Nzambe kati na eklezia mpo na mosala.

87 Tala, natindi bino kopamela mokili mpo na oyo etali misala na bango nyonso ya sembo te, mpe koteya bango na ntina ya bosambisi boye ezali koya.

88 Mpe moto nyonso oyo akoyamba bino, na esika wana nakozala lisusu, mpo nakokende liboso ya elongi na bino. Nakozala na loboko na bino ya mobali mpe na loboko ya mwasi, mpe Molimo na ngai ekozala kati na mitema na bino, mpe banjelu na ngai nzinganzinga na bino, mpo na kotombola bino.

89 Oyo nyonso akoyamba bino ayambi ngai; mpe se ye moko wana akoleisa bino, mpe akolatisa bino, mpe akopesa bino mosolo.

90 Mpe ye oyo aleisi bino, soki mpe alatisi bino, to apesi bino mosolo, akobungisa lifuta na ye soki moke te.

91 Mpe ye oyo akosala makambo oyo te azali moyekoli na ngai te; na oyo nde bokoki koyeba bayekoli na ngai.

92 Ye oyo ayambi bino te, bobendena mosika na ye, mpe bosukola makolo na bino kutu na mai, mai ya peto, ezala na eleko ya molunge to ya malili, mpe bopesa litatoli ya likambo yango epayi ya Tata oyo azali na lola, mpe bozonga lisusu epayi ya moto wana te.

93 Mpe na mboka moke to engumba nyonso oyo bokokota, bosala se lokola.

94 Nzokande, boluka na molende mpe botika te; mpe lisuma na ndako oyo wana, soki mpe mboka moke to engumba oyo wana ekoboya koyamba bino, to maloba na bino, to litatoli na bino mpo na ntina na ngai.

95 Lisuma, nalobi yango lisusu, na ndako oyo wana, soki mpe na mboka moke to engumba oyo wana ekoboya koyamba bino, to maloba na bino, soki mpe litatoli na bino mpo na ntina na ngai.

96 Mpo ngai, ya Bokasi nyonso, nasili kotia maboko na ngai likolo ya bikolo, mpo na kofiakola bango mpo na nkuna na bango.

97 Mpe bolozi ekopanzama, mpe ekolongolama te uta na mabele kino nakosilisa mosala na ngai, oyo ekoyeisama mokuse kati na bosembo—

98 Kino nyonso bakoyeba ngai, baoyo bakotikala, kutu uta na bato mpamba kino na bato minene koleka nyonso, mpe bakotondisama na boyebi ya Nkolo, mpe bakomona miso na miso, mpe bakotombola mongongo na bango, mpe na mongongo moko elongo bakoyemba loyembo ya sika, kolobaka:

99 Nkolo azongisi lisusu Siona;Nkolo asikoli bato na ye, Yisalaele,Engebene na maponami ya ngolu,Oyo ekokisami na bondimiMpe liyokani ya batata na bango.

100 Nkolo asikoli bato na ye;Mpe Satana akangisami mpe ntango ezali lisusu te.Nkolo asangisi biloko nyonso na moko.Nkolo amemi Siona na nse uta na likolo.Nkolo amatisi Siona likolo uta na nse.

101 Mabele esali mpe ebimisi bokasi na yango;Mpe bosolo efandisami kati na nsopo na ye;Mpe lola esili komweta-mweta likolo na ye;Mpe alatisami na nkembo ya Nzambe na ye;Mpo atelemi na katikati ya bato na ye.

102 Nkembo, mpe lokumu, mpe nguya, mpe bokasi,Epesami na Nzambe na biso; mpo atonda na boboto,Boyengebene, ngolu mpe bosolo, mpe kimia,Mpo na libela na libela, Amene.

103 Mpe lisusu, solo, solo, nalobi epayi na bino, elongobani ete moto nyonso oyo akeyi kosakola nsango malamu na ngai ya libela, ete mbala mingi lokola bazali na mabota, mpe bazwi mosolo lokola likabo, ete basengeli kotinda yango epayi na bango to kosalela yango mpo na bolamu na bango, lokola Nkolo akotinda bango, mpo boye ebongeli ngai malamu.

104 Mpe tika ete baoyo wana nyonso bazali na mabota te, baoyo bazwi mosolo, batinda yango na episikopo na Siona, soki te epayi ya episikopo na Ohio, ete mobulisama mpo na kobimisa bimoniseli na buku mpe bonyatami ya bimoniseli yango, mpe mpo na kotia Siona.

105 Mpe soki moto songolo akopesa kazaka, to elamba epayi ya moko na bino, kamata ya kala mpe bwakela yango babola, mpe bokoba kokende nzela na bino na kosepelaka.

106 Mpe soki moto moko na kati na bino azali makasi kati na Molimo, tika ete akamata elongo na ye ye oyo azali na bolembu, ete akoka kolendisama kati na bosokemi nyonso, ete akoka ye mpe lisusu kokoma makasi.

107 Boye, bokamata elongo na bino baoyo wana babulisami na bonganganzambe ya moke, mpe botinda bango liboso na bino mpo na kosala ebongiseli, mpe mpo na kolengela nzela, mpe mpo na kokokisa ebongiseli oyo bokoki te kosala bino moko.

108 Tala, oyo ezali lolenge oyo wapi bapostolo na ngai, na ntango ya kala, batongaki eklezia mpo na ngai.

109 Boye, tika ete moto na moto azala na lotomo na ye moko, mpe asala na libiangi na ye moko, mpe botika te ete moto eloba na makolo ete azali na ntina ya makolo te; mpo soki makolo ezali te ndenge nini nzoto ekokoka kotelema?

110 Lisusu nzoto ezali na ntina ya enama na yango moko moko, ete nyonso ekoka kolendisama elongo, ete ebongiseli nyonso ekoka kobatelama ya kobonga nie.

111 Mpe tala, banganganzambe minene basengeli kokende mobembo, mpe lisusu bampaka, mpe lisusu banganganzambe bake; kasi badiakona mpe bateyi basengeli koponama mpo na kokengela eklezia, kotikala se basali mpo na eklezia.

112 Mpe episikopo, Newel K. Whitney, lisusu asengeli kokende mobembo nzinganzinga mpe na kati ya Baeklezia nyonso, kolukaka babola mpo na kopesa lisungi na bozangi na bango na komemaka bato na bozwi mpe bato na lolendo kati na bomikitisi.

113 Asengeli mpe kokamata na mosala ntoma moko mpo na kokamata mokumba mpe kosala mosala na ye ya ntango lokola ekotinda ye.

114 Nzokande, botika episikopo akende na engumba ya New York, lisusu na engumba ya Albany, mpe lisusu na engumba ya Boston, mpe akebisa bato ya bingumba oyo na lokito ya nsango malamu, na mongongo makasi, mpo na oyo etali libebi mpe bosilisami nyonso oyo ezali kozela bango soki mpenza baboyi koyamba makambo oyo.

115 Mpo soki mpenza baboyi koyamba makambo oyo ngonga ya bosambisi na bango ebelemi, mpe ndako na bango ekotikala mpamba mpo na bango.

116 Tika ete atiela ngai motema mpe akoyokisama nsoni te; mpe suki moko te ya moto na ye ekokweya na nse soki eyebani te.

117 Mpe solo nalobi epayi na bino, montika ya basali na ngai, bokende lokola libaku ekopesama epayi na bino, na mabiangi ebele na bino, na bingumba mpe mboka minene mpe ya lokumu, kopalelaka mokili kati na bosembo mpo na oyo etali misala na bango mizanga bosembo mpe mizanga bonzambe, kolimbolaka polele mpe na bososoli nyonso libebi ya bonsomo boye ezali koya na mikolo ya nsuka.

118 Mpo, na nzela na bino elobi Nkolo ya Bokasi nyonso, nakobebisa babokonzi na bango; nakoningisa bobele mabele te, kasi lola oyo etonda na minzoto ekolenga.

119 Mpo, ngai, Nkolo, nasili kotandola loboko na ngai mpo na komonisa nguya ya lola; bokoki te komona yango sikawa, kasi na ntango moke bokomona yango, mpe bokoyeba ete nazali, mpe ete nakoya mpe nakoyangela elongo na bato na ngai.

120 Nazali Alifa mpe Omega, ebandeli mpe nsuka. Amene.

Bimisa na lokasa