Makomi
Malongi mpe Mayokani 138


Eteni 138

Limoni epesami epayi ya Mokambi Joseph F. Smith na Salt Lake City, Utah, na mokolo ya 3, sanza ya zomi ya mobu 1918. Na maloba na ye ya boyingisi na Likita Monene ya Katikati ya mobu, likita ya mbala ya 89 ya Eklezia, na mokolo ya 4, sanza ya zomi ya mobu 1918, Mokambi Smith alobaki ete azwaki bitinda ebele uta na Nzambe na basanza eleki. Moko kati na oyo, ezalaki mpo na ntina ya kotala oyo Mobikisi abimelaki milimo ya bakufi wana ezalaki nzoto na Ye na lilita, oyo etinda Mokambi Smith azwaki mokolo eleki. Limoni yango ekomamaki sasaipi nsima ya kokangama ya likita yango. Na mokolo ya 31, sanza ya zomi ya mobu 1918, limoni epesamaki na bapesi toli ya Bokambi ya Yambo, na Lisanga ya Bazomi na mibale, mpe na Nkoko mopamboli, mpe endimamaki na bango nyonso na motema moko.

1–10, Mokambi Joseph F. Smith amanyoli makomi ya Petelo mpe bobimeli ya Nkolo na biso na mokili ya molimo; 11–24, Mokambi Smith amoni bakufi ya sembo basangani na paladiso mpe mosala ya Klisto na kati na bango; 25–37, Amoni lolenge nini mosala ya koteya nsango malamu mobongisamaki na kati ya milimo; 38–52, Amoni Adama, Eva, mpe mingi ya baprofeta basantu na mokili ya molimo oyo bamoni ete ezalela na bango ya molimo liboso ya bosekwi na bango ezali lokola boumbu; 53–60, Bakufi ya sembo ya mokolo oyo bazali kokoba misala na bango kati na mokili ya milimo.

1 Na mokolo ya misato ya sanza ya zomi, na mobu nkama zomi na mwambe, nafandaki kati na kisuku na ngai komanyolaka makomi;

2 Mpe kolukaka koyeba ntina ya mbeka ya bomikabi monene oyo epesamaki na Mwana ya Nzambe, mpo na bosikoli ya mokili;

3 Mpe bolingo monene mpe ya kokamwa oyo emonisamaki na Tata mpe Mwana ya na nzela ya boyei ya Mosikoli kati na mokili;

4 Ete na nzela ya bomikabi na ye, mpe na nzela ya botosi na mabongisi ya nsango malamu, bato nyonso bakoka kobikisama.

5 Wana ezalaki ngai boye komipesa na lolenge wana, mayele na ngai mazongaki na makomi ya apostolo Petelo, epayi ya basantu ya kala oyo bapalanganaki bipayi na Ponto, Galatia, Kapadokia, mpe biteni misusu ya Asia, wapi nsango malamu eteyamaki nsima ya bobakami ya Nkolo na ekulusu.

6 Nafungolaki Biblia mpe natangaki mokapo ya misato mpe ya minei ya mokanda ya yambo ya Petelo, mpe lokola natangaki natutisamaki mingi, mingi koleka ete nayoka naino bongo liboso te, na matangi oyo malandi:

7 “Mpo Klisto lisusu ayokaki mpasi mbala moko mpo na masumu, ye moyengebene mpo na bazanga boyengebene, ete akoka komema biso na Nzambe, amitiaki na liwa kati na mosuni, kasi apesamaki bomoi na Molimo:

8 “Na nzela ya oyo lisusu akendaki mpe ateyaki milimo kati na boloko;

9 “Oyo na ntango moko mizangaki botosi, ntango motema molai ya Nzambe ezalaki kozela na mikolo ya Noa, wana ezalaki masuwa kolengelama, kati na oyo bato bake, elingi koloba, bato mwambe babikisamaki na mai.” (1 Petelo 3:18–20.)

10 “Mpamba te mpo na ntina oyo nsango malamu eteyamaki lisusu na bango oyo basili kokufa, ete basambisama na lolenge ekokani na bato kati na mosuni, kasi bazala na bomoi na lolenge ekokani na Nzambe kati na molimo.” (1 Petelo 4:6.)

11 Lokola nazalaki komanyola makomi oyo makomami, miso ya bososoli na ngai efungolamaki, mpe Molimo ya Nkolo mofandaki likolo na ngai, mpe namonaki ebele ya bakufi, ezala mike to minene.

12 Mpe bazalaki ya kowangana nyonso esika moko lingomba ya ebele ya milimo ya bayengebene, oyo bazalaki sembo kati na litatoli ya Yesu wana ezalaki bango na bomoi ya bokufi;

13 Mpe baoyo bamipesaki mbeka na bokokani ya mbeka monene ya Mwana ya Nzambe, mpe banyokwamaki na nkombo ya Mosikoli na bango.

14 Nyonso baoyo bakabwanaki na bomoi oyo ya kufa, ngwi na elikya ya boko bosekwi ya nkembo, na nzela ya ngolu ya Nzambe Tata mpe Mwana Mobotami se Moko ya ye, Yesu Klisto.

15 Namonaki ete batondisamaki na bosepeli mpe nsai, mpe bazalaki kosepela elongo mpo ete mokolo ya bokangoli na bango mobelemaki.

16 Basanganaki na kozelaka boyei ya Mwana ya Nzambe kati na mokili ya molimo, mpo na kotatola bosikoli na bango uta na singa ya liwa.

17 Mputulu ya kolala na bango esengeli kozongisama na nzoto na yango ya kobonga nie, mukuwa na mukuwa na yango, mpe mintungu mpe mosuni likolo na yango, molimo mpe nzoto ekosangisama mpo na kokabwana lisusu soki moke te, ete bakoka kozwa litondi ya bosepeli.

18 Wana ezalaki ebele monene oyo ya bato kozela mpe kosolola, kosepelaka na ngonga ya bokangoli na bango uta na minyololo ya liwa, Mwana ya Nzambe amonanaki, kosakolaka lipanda na bakangemi oyo bazalaki sembo;

19 Mpe kuna ateyaki bango nsango malamu ya libela, malongi ya bosekwi mpe bosikoli ya bato nyonso uta na bokwei, mpe uta na masumu ya moto moko moko mpo na koyanola masengami ya boyamboli.

20 Kasi epayi ya bato ya nkuna akendaki te, mpe na kati ya bato oyo bazanga bonzambe mpe bazanga boyamboli oyo bamipakolaki bosoto wana ezalaki bango na mosuni, mongongo na ye motombwamaki te;

21 Soki mpe batomboki oyo babwakaki matatoli mpe makebisi ya baprofeta ya kala bamonaki miso na ye te, batalaki elongi na ye mpe te.

22 Epayi wapi ezalaki bato oyo, molili moyangelaki, kasi na kati ya sembo kuna ezalaki kimia;

23 Mpe basantu basepelaki na bosikoli na bango, mpe bangumbamaki na mabolongo mpe bayebaki Mwana ya Nzambe lokola Mosikoli mpe Mokangoli na bango uta na liwa mpe minyololo ya lifelo.

24 Bilongi na bango bingengaki, mpe bongengi uta na kozala na miso ya Nkolo efandaki likolo na bango, mpe bayembaki masanzoli na nkombo na ye esantu.

25 Nakamwaki, mpo nasosolaki ete Mobikisi alekisaki penepene ya mibu misato na mosala na ye na kati ya Bayuda mpe oyo bato ya ndako ya Yisalaele, kolukaka koteya bango nsango malamu ya libela mpe kobianga bango na boyamboli;

26 Mpe nzokande, ata kutu mosala makasi na ye, mpe makamwisi, mpe bosakoli ya bosolo, na nguya mpe likoki monene, ezalaki bobele na bato mike oyo bayokaki mongongo na ye, mpe basepelaki na miso na ye, mpe bazwaki lobiko na maboko na ye.

27 Kasi mosala na ye na kati ya baoyo wana bakufaki esukaki na mwa ntango mokuse oyo elekaki uta na bobakami na ekulusu kino na bosekwi na ye;

28 Mpe namitunaki na maloba ya Petelo—oyo wapi alobaki ete Mwana ya Nzambe ateyaki milimo kati na boloko, oyo na ntango yoko mizangaki botosi, ntango motema molai ya Nzambe ezalaki kozela na mikolo ya Noa—mpe lolenge nini ekokaki ye koteya milimowana mpe kosala mosala mosengeli na kati na bango na eleko moko ya mokuse.

29 Mpe awa nazalaki komituna, miso na ngai efunguamaki, mpe bososoli na ngai elamukaki, mpe nasosolaki ete Nkolo akendaki ye moko te na kati ya bato ya nkuna mpe bazangi botosi oyo babwakaki bosolo, mpo na koteya bango;

30 Kasi tala, na kati ya basembo, abongisaki mapinga na ye mpe aponaki bantoma, balatisama na nguya mpe likoki, mpe atindaki bango kokende mpe komema pole ya nsango malamu epayi na baye bazalaki kati na molili, solo mpenza epayi ya milimo nyonso ya bato; mpe boye nde nsango malamu eteyamaki na bakufi.

31 Mpe bantoma oyo baponamaki bakendaki koyebisa mokolo ya bondimami ya Nkolo mpe kosakola lipanda na bakangemi baoyo bakangisamaki, kutu epayi ya nyonso oyo balingaki koyambola masumu na bango mpe koyamba nsango malamu.

32 Boye nde nsango malamu eteyamaki na nyonso oyo wana bakufaki kati na masumu na bango, na kozangaka boyebi ya bosolo, soki mpe na bobuki ya mibeko, mpo baboyaki baprofeta.

33 Baoyo bateyamaki bondimi na Nzambe, boyamboli ya masumu, libatisi ya bokitani mpo na bolimbisi ya masumu, likabo ya Molimo Mosantu na nzela ya kotiama maboko,

34 Mpe mabongisi nyonso mosusu ya nsango malamu oyo esengelaki mpo na bango koyeba mpo ete bakomisama bayengebene ete bakoka kosambisama engebene na bato kati na mosuni, kasi bazwa bomoi engebene na Nzambe kati na molimo.

35 Mpe bongo eyebanaki na kati ya bakufi, ezala na mike mpe minene, na baoyo bazanga bosembo mpe na basembo, ete bosikoli esalemaki na nzela ya mbeka ya Mwana ya Nzambe likolo ya ekulusu.

36 Boye nde eyebanaki ete Mosikoli na biso alekisaki ntango na ye na ntango ya bofandi na ye na mokili ya milimo, koteyaka mpe kolengelaka milimo ya sembo ya baprofeta oyo batatolaki mpo na ntina na ye wana ezalaki bango na mosuni;

37 Ete bakoka komema etinda ya bosikoli epayi ya bakufi nyonso, epayi na baoyo wapi akokaki te kokende ye moko, na ntina ya botomboki mpe bobuki mibeko na bango, ete na nzela ya mosala ya basali na ye bakoka koyoka lisusu maloba na ye.

38 Na kati ya boko bato minene mpe bato ya bokasi oyo basanganaki na lingomba monene oyo ya basembo ezalaki Tata Adama, Mokolo ya Mikolo mpe tata ya nyonso,

39 Mpe Mama na biso ya nkembo Eva, elongo na ebele ya bana na ye ya basi ya sembo oyo bazalaki na bomoi bipayi na bileko mpe bangumbamelaki Nzambe ya solo mpe ya bomoi.

40 Abele, martiru ya yambo, azalaki kuna, mpe ndeko na ye ya mobali Sete, moko ya bato na makasi, oyo azalaki na elilingi ekokani mpenza ya tata na ye, Adama.

41 Noa, oyo apesaki bokebisi mpo na oyo etali mpela; Semi, nganganzambe monene ya monene; Abalayama, tata ya basembo; Yisaka, Yakobo, mpe Mose, mopesi mibeko monene ya Yisalaele;

42 Mpe Yisaya, oyo alobaki na nzela ya masakoli ete Mosikoli apakolamaki mpo na kokangisa mitema oyo mitutami, mpo na kosakola lipanda epayi ya bakangemi, mpe bofungwami ya boloko mpo na bango oyo bakangamaki, bazalaki mpe kuna.

43 Mpo na kobakisa, Ejekiele, oyo balakisaki na limoni lobwaku lonene ya mikuwa mikawuka, oyo esengelaki kolatisama misuni likolo, mpo na kobima na bosekwi ya bakufi, lokola milimo na bomoi;

44 Danyele, oyo amonaki na mosika mpe alobelaki liboso esalema botiami ya bokonzi ya Nzambe na mikolo ya nsuka, na lolenge ete ekobebisama te to ekopesama lisusu soki moke te na bato basusu;

45 Eliyasi, oyo azalaki na Mose likolo ya Ngomba ya Bobongwani;

46 Mpe Malaki, profeta oyo atatolaki boyei ya Eliya—na ntina ya oyo Moroni alobaki na profeta Joseph Smith, kosakolaka ete asengeli koya liboso ya ebandeli ya mokolo monene mpe ya nsomo ya Nkolo—bazalaki lisusu kuna.

47 Profeta Eliya asengelaki kolona kati na mitema ya bana bilaka epesamaki na batata na bango,

48 Kolakisaka elilingi ya mosala monene oyo mosengelaki kosalema kati na batempelo ya Nkolo na eleko ya litondi ya ntango, mpo na bosikoli ya bakufi, mpe bokangi ya bana na baboti na bango, mbele mabele mobimba ebetama na bolakeli mabe mpe ebebisama mpenza na boyei na ye.

49 Nyonso oyo mpe mingi lisusu, kutu baprofeta oyo bazalaki na kati ya Banefi mpe batatolaki boyei ya Mwana ya Nzambe, basanganaki na eyangani monene mpe bazelaki bokangoli na bango,

50 Mpo bakufi batalaki bozangi komonana mpo na ntango molai ya milimo na bango uta na nzoto na bango lokola boumbu.

51 Oyo Nkolo ateyaki, mpe apesaki bango nguya ya kobima, nsima ya bosekwi na ye uta na bakufi, mpo ete bakota kati na bokonzi ya Tata na ye, kuna bakolatisama motole na bozangi kufa mpe bomoi ya seko,

52 Mpe uta na ntango wana kokende liboso bakoba mosala na bango lokola elakamaki na Nkolo, mpe bazala bakaboli ya mapamboli nyonso oyo ebatelamaki na ebombelo mpo na bango oyo balingaka ye.

53 Profeta Joseph Smith, mpe tata na ngai, Hyrum Smith, Brigham Young, John Taylor, Wilford Woodruff, mpe milimo misusu ya boponi oyo mibatelamaki mpo na kobima na litondi ya ntango ete bamipesa na kotiaka moboko ya mosala monene ya mokolo ya nsuka,

54 Oyo na kati ezali na botongi ya tempelo mpe bokokisi ya makuli kuna na kati mpo na bosikoli ya bakufi, esalemaki lisusu na mokili ya milimo.

55 Natalaki malamu ete bazalaki na kati ya bato ya lokumu mpe boko bato minene oyo baponamaki na ebandeli mpo na kozala bakambi kati na Eklezia ya Nzambe.

56 Kutu liboso ete babotama, bango, elongo na mingi basusu, bazwaki mateya na bango ya yambo kati na mokili ya milimo mpe balengelamaki kobima na ntango esengeli ya Nkolo mpo na kosala kati na elanga ya vinyo na ye mpo na lobiko ya milimo ya bato.

57 Natalaki ete bampaka ya sembo ya eleko oyo, ntango bakendeka uta na bomoi ya kufa, bakoba na misala na bango oyo etali koteya nsango malamu ya boyamboli mpe ya bosikoli, na nzela ya mbeka ya Mwana Mobotami se Moko ya Nzambe, na kati ya baoyo wana bazali kati na molili mpe na nse ya boumbu ya masumu kati na mokili monene ya milimo ya bakufi.

58 Bakufi oyo bayamboli bakosikolama, na nzela ya botosi na makuli ya ndako ya Nzambe,

59 Mpe esili bango kofuta etumbu ya bobuki mibeko na bango, mpe basukolami peto, bakozwa lifuta engebene na misala na bango, mpo bazali basangoli libula ya lobiko.

60 Boye nde ezalaki limoni ya bosikoli ya bakufi oyo ebimisamaki na ngai, mpe natatoli, mpe nayebi ete litatoli oyo ezali solo, na nzela ya lipamboli ya Nkolo mpe Mobikisi na biso, Yesu Klisto, kutu bongo. Amene.

Bimisa na lokasa